Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ESTHER
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10
Prev Up Next
Chapter 10
Esth LinVB 10:1  Mokonzi Asuero azalaki kofutisa bato banso mpako, o mokili mpe o bisanga bya mbu.
Esth LinVB 10:2  Makambo manso ma nguya ya ye, mpiko, nkita na lokumu la bokonzi bwa ye, bakomi manso o buku ya Mikóló mya bakonzi ba Persi mpe ba Medi.
Esth LinVB 10:3  Mo-Yuda Mardokai azalaki moto wa babale o bokonzi bwa Asuero. Ba-Yuda bazalaki kokumisa ye, bato ba ekolo ya ye balingaki ye mingi, azalaki koluka bolamu bwa bango mpe kopangana na makambo ma ba­ngo manso. 3a Mardokai alobi : « Nzambe abongiseli biso makambo ma­na manso ! 3b Nakokundola naino ndoto nalotoki mpo ya makambo mana ; mpe manso masalemi solo : 3c Mwa moluka moke mokomi ebale enene, mwinda, mwese na mai maike. Ebale ezali Ester, oyo mokonzi abalaki mpe akomisaki mwasi mokonzi. 3d Bibuki bibale bya nyama bizali : Aman na ngai. 3e Bikolo bina bizali bikolo biye binso bisanganaki mpo ya kosilisa nkombo ya ba-Yuda. 3f Ekolo ya ngai ezali Israel, baye babelelaki Nzambe mpe babiki. Solo, Mokonzi abikisi bato ba ekolo ya ye, alongoli biso o mpasi ina inso, asali bilembo mpe makamwisi manene, maye mamononi epai ya bapagano te. 3g Yango wana Nzambe aponi nzela ibale, yoko ya ekolo ya bato ba Nzambe, esusu ya bikolo bisusu. 3h Nzela ina ibale imononi polele, bobele o ngonga, o nta­ngo mpe o mokolo Nzambe akanaki mpo ya bikolo binso. 3i Nzambe akanisi bato ba ekolo ya ye, mpe alongisi bango. 3j Bongo mikolo mina, mya zomi na minei mpe mya zomi na mitano, mya sanza Adar mizala o Israel mikolo mya kosangana likita, mya kolakisa esengo mpe nsai o miso ma Nzambe ; ezala bongo o bileko binso seko o ekolo ya ye Israel. » 3k O mobu mwa minei mwa boko­nzi bwa Tolemeo na Kleopatra, Doziteo, oyo azalaki komitanga nganga Nzambe mpe mo-Levi, elongo na mwana wa ye Tolemeo, bayei na monkanda moye motali eyenga ya Purim. Balobi ’te ezalaki solo monkanda mwango : Lizimake, mwana wa Tolemeo, moto wa lisanga lya Yeruzalem, abongoli mwango o lokota la ba-Greki.