ESTHER
Chapter 9
Esth | LinVB | 9:1 | O sanza ya zomi na ibale, sanza Adar, o mokolo mwa zomi na misato mwa sanza, minkanda mya mokonzi misili kopalangana o mboka inso. | |
Esth | LinVB | 9:2 | O mokolo monamei ba-Yuda babomi banguna. Moto moko akokaki bango te, zambi babangaki bango. | |
Esth | LinVB | 9:3 | Bayangeli, bankumu na bakomi minkanda ba mokonzi bazalaki kondimela ba-Yuda, mpo babangaki Mardokai. | |
Esth | LinVB | 9:4 | Mardokai azalaki nkumu o ndako ya mokonzi ; lokumu la ye lopalangani o ekolo mobimba ; Mardokai abandi kokoma moto monene. | |
Esth | LinVB | 9:5 | Ba-Yuda babomi banguna banso na mopanga. Banyati bango, basilisi bango, basali na banguna lokola motema molingi. | |
Esth | LinVB | 9:10 | bana zomi ba Aman, mwana wa Amdata, monyokoli wa ba-Yuda. Kasi bayibi biloko bya bango te. | |
Esth | LinVB | 9:12 | Mokonzi alobi na Ester : « Bobele o Suza ba-Yuda babomi bato nkama itano na mpe bana zomi ba Aman. Bongo basalaki nini o bikolo bisusu ? Yebisa ngai sikawa nini olingi kose-nge, nakopesa yo yango. Senge mpe nakopesa yo. » | |
Esth | LinVB | 9:13 | Ester ayanoli : « Soko mokonzi andimi, balingisa ba-Yuda ’te basala naino bongo lobi mpe batingisa bibembe bya bana babali zomi ba Aman o nzete, nsinga o nkingo. » | |
Esth | LinVB | 9:14 | Mokonzi alingisi ’te basala bobele bongo, mpe atindi ’te batingisa bibembe bya bana babali zomi ba Aman o nzete. | |
Esth | LinVB | 9:15 | Bongo ba-Yuda ba Suza basangani mpe o mokolo mwa zomi na minei mwa sanza Adar ; babomi naino bato nkama isato, kasi bayibi biloko bya bango te. | |
Esth | LinVB | 9:16 | O bisika bisusu bya ekolo, ba-Yuda basangani mpe bapesani maboko. Banguna ba bango batiki bango nye, mpo ba-Yuda babomaki banguna nkoto ntuku nsambo na itano o mokolo mwa zomi na misato o sanza Adar, kasi bayibi eloko te. | |
Esth | LinVB | 9:18 | Ba-Yuda ba Suza basanganaki o mokolo mwa zomi na misato mpe o mokolo mwa zomi na minei, kasi bapemi te, bapemi bobele o mokolo mwa zomi na mitano, se na esengo mpe na mabina. | |
Esth | LinVB | 9:19 | Na ntina ena ba-Yuda baye bafandi o mboka ike, o libanda lya bingumba, bakosepelaka mokolo mwa zomi na minei mwa sanza Adar na esengo enene mpe bakotindelanaka biloko bya kolia. Kasi baye bafandi o bingumba binene bakosepelaka mpe mokolo mwa zomi na mitano mwa sanza Adar na esengo enene ; bakotindelanaka mpe biloko bya kolia. | |
Esth | LinVB | 9:20 | Mardokai akomi makambo maye o buku, mpe atindi minkanda epai ya ba-Yuda banso bafandi o mokili mwa Asuero, bazala mosika to penepene, | |
Esth | LinVB | 9:21 | mpo ’te mobu na mobu basepela mikolo mya zomi na minei mpe mya zomi na mitano mya sanza Adar lokola biyenga binene. | |
Esth | LinVB | 9:22 | O mikolo mina banguna ba ba-Yuda batikaki bango nye, ezalaki sanza Adar ntango mawa ma bango mabongwani esengo, minyoko mibongwani mabina. O mikolo mina basepela mpe basala limpati linene, batindelana biloko bya kolia, mpe bakabela babola biloko. | |
Esth | LinVB | 9:24 | « Aman, mwana wa Amdata, moto wa Masedonia, monyokoli wa ba-Yuda banso, alukaki koboma bango ; na ntina ena abeteki zeke. | |
Esth | LinVB | 9:25 | Kasi ntango azongaki epai ya mokonzi mpo ya kosenge ye ’te atingisa Mardokai o nzete, mpasi inso alingaki koyokisa ba-Yuda, ikweli ye moko, bongo babomi ye na bana ba ye lokola. | |
Esth | LinVB | 9:26 | Yango wana batangi mikolo mina ‘Purim’ mpo ya zeke babeteki o mokolo mona (o lokota la bango, Pur lokola zeke). » Engebene na maloba ma monkanda mwa Mardokai, mpe mpo ya makambo manso makwelaki bango, | |
Esth | LinVB | 9:27 | ba-Yuda bandimi, bango moko, bankoko ba bango na mpe baye banso bakosangana na bango, kosepela mobu na mobu mikolo mibale, lokola mobeko motindi mpe o eleko etindami. | |
Esth | LinVB | 9:28 | Awa bakosepela mikolo mya Purim o libota lyoko lyoko, o ekolo yoko yoko, mpe o engumba yoko yoko, ba-Yuda bakobosana myango te, mpe likambo lina likobungama te o kati ya bango o mibu mikoya nsima. | |
Esth | LinVB | 9:29 | Mokonzi mwasi Ester, mwana wa Abigayil, akomi mpe monkanda mpo ya kondima mobeko mwa eyenga ya Purim. | |
Esth | LinVB | 9:30 | Batindi mwango epai ya ba-Yuda banso o bikolo monkama na ntuku ibale na nsambo bya bokonzi bwa Asuero, bo nsango ya boboto mpe ya bondeko. | |
Esth | LinVB | 9:31 | O monkanda moye batindi ’te ba-Yuda banso basepela mikolo mya Purim o eleko etindami, lokola Mardokai atindaki, mpe na botosi mibeko mya bolali nzala mpe mya boleli. | |