ESTHER
Chapter 6
Esth | LinVB | 6:1 | O butu bona Nzambe asali ’te mpongi ekima mokonzi. Yango wana mokonzi atindi ’te bayela ye buku ya Mikóló mya Bakonzi mpo batangela ye yango. | |
Esth | LinVB | 6:2 | Ayoki mpe maloba malakisi ’te Mardokai afundaki ba-eniki babale ba mokonzi, Bigtan na Teres, o ntango bazalaki kokengele lopango, balukaki koboma Asuero. | |
Esth | LinVB | 6:3 | Mokonzi atuni bato ba ye : « Likabo nini to lokumu nini topesaki Mardokai ? » Bato ba ye bazongisi : « Topesaki ye eloko te. » | |
Esth | LinVB | 6:4 | O ntango mokonzi atuni bango « Nani azali o libanda ? », Aman akoti o lopango la mokonzi mpo ’te asenge mokonzi ’te atingisa Mardokai o nzete eye atindaki ’te balengele mpo ’te baboma ye. | |
Esth | LinVB | 6:5 | Basaleli ba mokonzi balobi : « Aman moto akoti o lopango. » Mokonzi alobi : « Akoto ! » | |
Esth | LinVB | 6:6 | Na nsima mokonzi atuni Aman : « Nasala nini na moto nalingi kokumisa ? » Aman amilobeli o motema : « Mokonzi akoki kokumisa moto mosusu te, se ngai. » | |
Esth | LinVB | 6:8 | Bakamata bilamba kitoko, biye mokonzi ye moko akolataka, baya na farasa, eye mokonzi akobutelaka. | |
Esth | LinVB | 6:9 | Bapesa yango na nkumu moko, moninga wa motema wa mokonzi, bongo ye alatisa moto oyo mokonzi apusi kolinga. Babutisa ye o farasa mpe batambwisa ye o zando ya engumba mpe baganga o boso bwa ye : Bakosalaka bongo na moto oyo mokonzi alingi kokumisa ! » | |
Esth | LinVB | 6:10 | Mokonzi alobi na Aman : « Ozila te, kamata bilamba, farasa mpe binso otangi sikasikawa, mpe sala bongo na Mardokai, mo-Yuda oyo azali o lopango la mokonzi. Batika eloko yoko te ya maloba olobaki ! » | |
Esth | LinVB | 6:11 | Aman akamati elamba na farasa, alatisi Mardokai yango mpe abutisi ye o farasa. Na nsima atamboli o zando ya engumba mpe agangi o boso bwa ye : « Bakosalaka bongo na moto oyo mokonzi alingi kokumisa ! » | |
Esth | LinVB | 6:12 | Aman azongi noki o ndako ya mokonzi, Aman azongi o ndako, na nsoni o motema, akitisi motó. | |
Esth | LinVB | 6:13 | Aman asololi na mwasi wa ye Zeres mpe na baninga ba ye ba motema makambo makwelaki ye. Baninga ba ye na mwasi wa ye balobi : « Tala boniboni Mardokai akitisi yo mbala eye ; soko azali moto wa ekolo ya ba-Yuda, okokoka ye te, akokweisa yo o miso ma ye. » | |