Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ESTHER
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10
Prev Up Next
Chapter 8
Esth LinVB 8:1  Bobele o mokolo monamei, mokonzi Asuero akabeli Ester biloko binso bya Aman, moto anyokoloki ba-Yuda. Abengi mpe Mardokai, mpo Ester ayebisaki ye ’te bazalaki na ye libota lyoko.
Esth LinVB 8:2  Akamati mpete eye alongolaki o mosapi mwa Aman mpe apesi Mardokai. Ester atii Mardokai moyangeli wa biloko binso bya Aman.
Esth LinVB 8:3  Ester akei lisusu koloba na moko­nzi, akwei o boso bwa ye ; aleli, abo­ndeli ye ’te alongola mpasi eye Aman, moto wa Agage, alingaki koyokisa ba-Yuda.
Esth LinVB 8:4  Mokonzi atandeli Ester montongo mwa wolo. Ester atelemi mpe akei kofanda o boso bwa mokonzi, alobi :
Esth LinVB 8:5  « Soko nakoki kozwa bolamu o miso ma yo, mpe soko mokonzi andimi, batinda bato bapasola minkanda mikomami na Aman, mwa­na wa Amdata, moto wa Agage, mpo ya kosilisa ba-Yuda o bokonzi bwa yo.
Esth LinVB 8:6  Boniboni nakoki komono mpasi elingi ekwela bato ba ekolo ya ngai ? Boniboni nakoki kotala na miso ’te bakoboma bandeko ba ekolo ya ngai banso ? »
Esth LinVB 8:7  Mokonzi ayanoli Ester na mo-Yuda Mardokai : « Napesi Ester biloko binso bya Aman, mpe natingisi Aman o nzete, mpo alingaki koboma ba-Yuda.
Esth LinVB 8:8  Yo sikawa, koma monkanda o nkombo ya ngai, koma maye manso omoni ’te mazali malamu mpe bakisa elembo ya mpete ya ngai, mpo bakoki kotia ntembe te na mitindo minso mikomami na mokonzi mpe mizwi elembo ya mpete ya ye. »
Esth LinVB 8:9  Babengi bakomi minkanda o mokolo mwa ntuku ibale na isato ya sanza ya ya­mbo, sanza Nisan. Bayebisi ba-Yuda bitinda bapesaki bayangeli ba mikili monkama na ntuku ibale na nsambo, banda India tee Etiópia. Moto na mo­to azwi monkanda mokomami na nkoma mpe o lokota la ye.
Esth LinVB 8:10  Bakomi monkanda o nkombo ya mokonzi Asuero, mpe babakisi elembo ya mpe­te ya ye ; na nsima batindi bata­mbwisi farasa bakende kotika mi­nka­nda mina.
Esth LinVB 8:11  Mokonzi alingisi ba-Yuda ’te bakoki kosangana mpe komibatela o mboka inso bafandi. Soko bato bayei kobundisa bango, bakoki kobo­ma bango, ná basi ná bana ba bango, bakoki mpe kobotolo bango biloko.
Esth LinVB 8:12  Esalema bongo o mokolo moko o bikolo binso bya bokonzi bwa Asuero, mokolo mwa zomi na misato mwa sanza ya zomi na ibale, sanza Adar. 12a Tala awa maloba ma monkanda mona : « Mokonzi monene Asuero ona bayangeli ba bikolo mo­nkama na ntuku ibale na nsambo, banda India tee Etiópia, mpe ona bato banso bakondimaka ngai, losako ! 12b Bato baike, soko bakonzi balakisi bango bolamu boleki ndelo, bakomi kofunda na yango. 12c Bazali koluka kosala bato ba biso mabe. Awa basepeli te na nkita bazwi, bakolukaka bato basali bango malamu na maka­mbo. 12d Bakobebisaka mitema mya bato balamu, mpe soko bato bazangi mayele babeteli bango maboko, bayoki esengo mpe bakanisi ’te bakoki kokima etumbu ya Nzambe wa bosembo, oyo akoyinaka bobe mpe akomonoko makambo manso. 12e Mbala mingi tomoni likambo liye : Soko bakonzi bapesi bato mosala mwa kotala makambo ma leta, bato baye baba-ndi kondima maloba ma baninga ba bango. Awa batii mitema na bango mpo ’te babongisa se makambo ma ba­ngo, bakomi koboma bato basali mabe te. Bamikotisi bongo o ma­ka­mbo ma nsomo, maye bakoki ko­bo-ngisa lisusu nsima te. 12f Ekosalema bo­ngo, mpo bilobaloba ndenge na ndenge bya baninga ba bango bibuli-nginyi mayele malamu ma bayangeli. 12g Nzokande, lelo tomoni polele ; toke­nde mosika te, tokundola maka­mbo ma kala te, totala bobele maka­mbo ma lelo, makambo mabe bato ba mobulu bakosalaka ; bayangeli baye bakosalaka mosala mwa bango bo ebongi soki te. 12h Banda lelo tokomeka kotia boboto o mokili mobimba mpo ’te bato banso bafanda nye. 12i Tokobongola makambo bobele soko ese­ngeli, mpe tokotala makambo manso bakolakisa biso na bosembo mpe na bolamu. 12j Bobele bongo Aman, mwana wa Amdata, moto wa Masedonia, ata aza­laki na biso ba-Persi makila moko te, mpe afandaki mosika na mboka ya biso, toyambaki ye epai ya biso lokola ndeko. 12k Biso tolakisaki ye bo­ndeko lokola tokosalaka na bato ba bikolo binso ; topesi ye mpe nkombo ‘tata wa biso’, akomi moto wa babale o bokonzi bwa biso mpe bato ba­nso bakumbameli ye. 12l Kasi akokaki na mosala moye mwa lokumu te mpe alukaki kolongola biso o bokonzi mpe koboma biso. 12m Akosaki biso na makambo ma lokuta ndenge na nde­nge mpo alukaki koboma Mardokai, oyo azali mobikisi wa biso mpe akosalisaka biso ntango inso. Alukaki mpe kolongola Ester, mwasi wa mokonzi, oyo asalaki mabe mokolo moko te ; ya solo, alingaki koboma ekolo ya ba-Yuda mobimba. 12n Na mayele mabe mana akanisaki ’te tokotikala se biso moko, mpe mosika te bokonzi bwa Persi bokokoma o maboko ma ba-Masedonia. 12o Kasi sikawa tomoni ’te ba-Yuda, baye elombe mobomi alingaki kosilisa, bazali bato babe te, kasi bakola-ndaka mibeko mya bosembo ; 12p bazali bana ba Nzambe wa nta likolo, oyo akobatelaka boyangeli bwa biso, ba­nda ntango ya bankoko ba biso, na bolamu mpenza. 12q Yango wana botala bobele mpamba minkanda miye Aman, mwana wa Amdata, atindaki. 12r Moto akomaki minkanda mina, totingisaki ye o nzete penepene na ezibeli ya engumba Suza, ye na libota lya ye mobimba. Nzambe, Mokonzi monene wa makambo manso, apesaki ye etumbu ekoki na ye. 12s Bobaka monkanda moye o libaya bipai binso ; botika ba-Yuda balanda mibeko mya bango moko, 12t bopesa bango maboko o mokolo bato bakoya kobundisa bango, mokolo mwa zomi na misato mwa sanza ya zomi na ibale, sanza Adar, lokola balobaki. 12u Mpamba te, Nzambe oyo azali Mokonzi monene wa mokili mobimba, abongoleli bato baye aponi mokolo mona mwa liwa mokomi mokolo mwa bosepeli nsuka te. 12v Bino mpe bobakisa mokolo mona monene na biyenga bya bino ; bosepela mokolo moye monene bo ebongi. 12w Mokolo mona mozala sikawa seko, eyenga ya libiki lya biso mpe lya ba­nso bakondima bokonzi bwa ba-Persi ; mpe baye bakoluka biso na mindondo lisusu, bayeba ’te bakoki kosila banso. 12x Soko o bingumba to o ekolo bato batosi mobeko moye te, tokoboma bango na likongo mpe na móto, mawa te. Mboka ena ekozala bobele ekila ya bato te, ata nyama ya zamba na mpe ndeke ikokima mboka ena seko. »
Esth LinVB 8:13  Basengelaki kobaka monkanda moye o libaya mpo ’te bato ba­nso bakoka kotanga mwango malamu, mpo ’te o mokolo motindami ba-Yuda banso bakoka komilengele mpo ya etumba, soko banguna bali­ngi kosala bango mabe.
Esth LinVB 8:14  Bato ba farasa bakei mbangu, lokola mokonzi atindi bango. Bayebisi mpe bato ba Suza mobeko mona.
Esth LinVB 8:15  Mardokai abimi o libanda, alati molato mwa bokonzi mwa longondo mpe mwa mpe­mbe, alati enkoti ya wolo o motó, na mpe elamba elai mpembe mpe etane ngola. Bato ba Suza banso bayoki esengo enene.
Esth LinVB 8:16  Mokolo mona mozalelaki ba-Yuda mokolo mwa mwi­nda, nsai, bosepeli mpe mwa lilonga.
Esth LinVB 8:17  O bingumba mpe o bikolo binso, esika bayebisi mobeko mwa moko­nzi, esika mpe babaki monkanda o libaya, ba-Yuda bayoki se esengo na nsai enene, bameli, balei mpe bazalaki na esengo. Bampaya baike basengi ’te bakata bango nzoto, bamikomisi bongo ba-Yuda mpo ya bobangi.