Esth
|
LinVB
|
8:12 |
Esalema bongo o mokolo moko o bikolo binso bya bokonzi bwa Asuero, mokolo mwa zomi na misato mwa sanza ya zomi na ibale, sanza Adar. 12a Tala awa maloba ma monkanda mona : « Mokonzi monene Asuero ona bayangeli ba bikolo monkama na ntuku ibale na nsambo, banda India tee Etiópia, mpe ona bato banso bakondimaka ngai, losako ! 12b Bato baike, soko bakonzi balakisi bango bolamu boleki ndelo, bakomi kofunda na yango. 12c Bazali koluka kosala bato ba biso mabe. Awa basepeli te na nkita bazwi, bakolukaka bato basali bango malamu na makambo. 12d Bakobebisaka mitema mya bato balamu, mpe soko bato bazangi mayele babeteli bango maboko, bayoki esengo mpe bakanisi ’te bakoki kokima etumbu ya Nzambe wa bosembo, oyo akoyinaka bobe mpe akomonoko makambo manso. 12e Mbala mingi tomoni likambo liye : Soko bakonzi bapesi bato mosala mwa kotala makambo ma leta, bato baye baba-ndi kondima maloba ma baninga ba bango. Awa batii mitema na bango mpo ’te babongisa se makambo ma bango, bakomi koboma bato basali mabe te. Bamikotisi bongo o makambo ma nsomo, maye bakoki kobo-ngisa lisusu nsima te. 12f Ekosalema bongo, mpo bilobaloba ndenge na ndenge bya baninga ba bango bibuli-nginyi mayele malamu ma bayangeli. 12g Nzokande, lelo tomoni polele ; tokende mosika te, tokundola makambo ma kala te, totala bobele makambo ma lelo, makambo mabe bato ba mobulu bakosalaka ; bayangeli baye bakosalaka mosala mwa bango bo ebongi soki te. 12h Banda lelo tokomeka kotia boboto o mokili mobimba mpo ’te bato banso bafanda nye. 12i Tokobongola makambo bobele soko esengeli, mpe tokotala makambo manso bakolakisa biso na bosembo mpe na bolamu. 12j Bobele bongo Aman, mwana wa Amdata, moto wa Masedonia, ata azalaki na biso ba-Persi makila moko te, mpe afandaki mosika na mboka ya biso, toyambaki ye epai ya biso lokola ndeko. 12k Biso tolakisaki ye bondeko lokola tokosalaka na bato ba bikolo binso ; topesi ye mpe nkombo ‘tata wa biso’, akomi moto wa babale o bokonzi bwa biso mpe bato banso bakumbameli ye. 12l Kasi akokaki na mosala moye mwa lokumu te mpe alukaki kolongola biso o bokonzi mpe koboma biso. 12m Akosaki biso na makambo ma lokuta ndenge na ndenge mpo alukaki koboma Mardokai, oyo azali mobikisi wa biso mpe akosalisaka biso ntango inso. Alukaki mpe kolongola Ester, mwasi wa mokonzi, oyo asalaki mabe mokolo moko te ; ya solo, alingaki koboma ekolo ya ba-Yuda mobimba. 12n Na mayele mabe mana akanisaki ’te tokotikala se biso moko, mpe mosika te bokonzi bwa Persi bokokoma o maboko ma ba-Masedonia. 12o Kasi sikawa tomoni ’te ba-Yuda, baye elombe mobomi alingaki kosilisa, bazali bato babe te, kasi bakola-ndaka mibeko mya bosembo ; 12p bazali bana ba Nzambe wa nta likolo, oyo akobatelaka boyangeli bwa biso, banda ntango ya bankoko ba biso, na bolamu mpenza. 12q Yango wana botala bobele mpamba minkanda miye Aman, mwana wa Amdata, atindaki. 12r Moto akomaki minkanda mina, totingisaki ye o nzete penepene na ezibeli ya engumba Suza, ye na libota lya ye mobimba. Nzambe, Mokonzi monene wa makambo manso, apesaki ye etumbu ekoki na ye. 12s Bobaka monkanda moye o libaya bipai binso ; botika ba-Yuda balanda mibeko mya bango moko, 12t bopesa bango maboko o mokolo bato bakoya kobundisa bango, mokolo mwa zomi na misato mwa sanza ya zomi na ibale, sanza Adar, lokola balobaki. 12u Mpamba te, Nzambe oyo azali Mokonzi monene wa mokili mobimba, abongoleli bato baye aponi mokolo mona mwa liwa mokomi mokolo mwa bosepeli nsuka te. 12v Bino mpe bobakisa mokolo mona monene na biyenga bya bino ; bosepela mokolo moye monene bo ebongi. 12w Mokolo mona mozala sikawa seko, eyenga ya libiki lya biso mpe lya banso bakondima bokonzi bwa ba-Persi ; mpe baye bakoluka biso na mindondo lisusu, bayeba ’te bakoki kosila banso. 12x Soko o bingumba to o ekolo bato batosi mobeko moye te, tokoboma bango na likongo mpe na móto, mawa te. Mboka ena ekozala bobele ekila ya bato te, ata nyama ya zamba na mpe ndeke ikokima mboka ena seko. »
|
|