JONAH
Chapter 4
Jona | LinVB | 4:2 | Abondeli Yawe, alobi : « E Mokonzi, nakanisaki bobele bongo ntango nazalaki naino o mokili mwa ngai ! Yango wana nakendeki mbangu o Tarsis. Nayebaki ’te ozali Nzambe wa boboto mpe okoyokelaka bato mawa. Okosilikaka noki te, opusi bolingi mpe oyebi kolimbisa. | |
Jona | LinVB | 4:3 | E Yawe, tika nakufa sikawa. O miso ma ngai bomoi bozali lisusu na ntina te, malamu nakufa. » | |
Jona | LinVB | 4:5 | Yona abimi o engumba mpe akei kofanda o Esti ya engumba. Atongi esasa, amifandisi wana o molili. Bongo amono makambo nini makokwela engumba. | |
Jona | LinVB | 4:6 | Yawe Nzambe akolisi lititi lyoko noki kin’o likolo lya motó mwa Yona, epesa ye mwa mpio mpo ’te ayoka malamu. Yona asepeli na lititi liye mingi. | |
Jona | LinVB | 4:8 | Ebimi moi makasi, Nzambe atindi mompepe mouti o Esti, mopesi molunge mingi. Moi mobeti Yona o motó ; moyokisi ye mpasi mingi. Yona asengi Nzambe ’te akufa, alobi : « O miso ma ngai bomoi bozali lisusu na ntina te, malamu nakufa. » | |
Jona | LinVB | 4:9 | Yawe atuni ye : « Awa osiliki mpo ya mwa lititi lina, okanisi ’te olongi ? » Yona ayanoli : « Nakoki kosilika mingi, ntina ezali. » | |
Jona | LinVB | 4:10 | Kasi Yawe alobi na ye : « Yo ozali koyoka motema mpasi mpo ya mwa lititi liye. Oloni lyango te, okolisi lyango mpe te. Likolaki na butu moko, mpe likufi na butu bwa nsima. | |