Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MALACHI
1 2 3
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 1
Mala LinVB 1:1  Liloba lya Yawe ona Israel, liye alobi na monoko mwa Mala­kia.
Mala LinVB 1:2  Yawe alobi : « Nalingi bino », kasi bino bozongisi : « Olakisaki biso bolingi bwa yo na nini ? » Yawe alobi : Ezau azalaki ndeko wa Yakob te ? Nzoka­nde nalingaki Yakob leka Ezau.
Mala LinVB 1:3  Nakomisi ngomba ya ye mopotu mpe mabelé ma ye eliki mpenza.
Mala LinVB 1:4  Soko ba-Edom balobi : « Babebisi mboka ya biso, kasi toko­tonga ndako ya biso lisusu », Yawe wa bokasi bonso akoloba : « Bato­nga, ngai nakobebisa yango lisusu ! » bakotanga bango ‘Mokili mwa masumu’ to ‘Ekolo Yawe apesa etu­mbu ekosila te’.
Mala LinVB 1:5  Ntango bokomono yango na miso, bokoloba : Yawe azali monene, azali o likolo lya mokili mwa Israel !
Mala LinVB 1:6  Mwana akomemyaka tata wa ye, mosali akotosaka nkolo wa ye. Kasi soko nazali tata solo, wapi lime­mya bosengeli kolakisa ngai ? Soko nazali nkolo, wapi botosi bwa bino ? Yawe wa bokasi bonso atuni bino banganga Nzambe, bino bato bokokinolaka Nkombo ya ngai. Kasi bino bozali koloba : Tokinoli nkombo ya yo na nini ?
Mala LinVB 1:7  Bino bokotiaka mabonza ma mbindo o altare ya ngai. Soko bokotuna lisusu : Ndenge nini tokomisi yo mbindo ? mpo bolobi : Tokoki kokinola meza ya Yawe.
Mala LinVB 1:8  Soko bobonzeli ngai moboma mwa nyama ekufi miso, bosali mabe te ? Soko boyeli ngai nyama izali kotengola to nyama izali na bokono, bosali mabe te ? Yawe wa bokasi bonso atuni : « Soko bokei kopesa yango na moyangeli wa ekolo, akosepela solo ? Akoyamba yo malamu ? »
Mala LinVB 1:9  Bokomekaka nde kobondela Nzambe bongo mpo ’te ayokela bino mawa ! Yawe wa bokasi bonso atuni : « Mpo ya mabo­nza maye mauti o maboko ma bino, náyamba bino nde malamu ? »
Mala LinVB 1:10  Soko o kati ya bino moto moko akokaki kokanga bizibeli bya Te­mpelo, mpo ’te botika kotumba ma­bonza mpamba o altare ya ngai ? Yawe wa bokasi bonso alobi boye : « Nasepeli na bino soki moke te ; nakoyamba mabonza o maboko ma bino te.
Mala LinVB 1:11  Banda nsuka ya mokili epai moi mokobimaka tee nsuka esusu epai moi mokokitaka Nko­mbo ya ngai ezali enene. » Yawe wa bokasi bonso alobi : « O bikolo bi­nso mpe o bisika binso bakobonzelaka Nkombo ya ngai libonza lya mpaka na mpe libonza peto, mpo o bikolo binso Nkombo ya ngai ezali enene. »
Mala LinVB 1:12  Kasi bino bokosa­ntolaka Nkombo ya ngai na bolobi : « Meza ya Yawe ezali na mbindo, biloko bya meza ya Yawe bibongi te. »
Mala LinVB 1:13  Yawe wa bokasi bonso alobi : Bino bokolobaka : « Bomiyokisi mpa­si se mpamba ! » mpe bokoboyaka byango na lofundo mpenza. Bokoyaka na nyama izali na mbeba, nyama ibukani makolo mpe izali na bokono, mpe bokobonzelaka ngai yango. Yawe atuni bino : « Nakoki nde koya­mba yango o maboko ma bino ? »
Mala LinVB 1:14  Mabe makwela mokosi oyo wana, moto oyo aza­li na nyama mobali o etonga mpe abonzeli Mokonzi nyama ezali na mbeba, mpo ya kokokisa elako ya ye. Yawe wa bokasi bonso alobi : « Nazali Mokonzi monene. Bato ba bikolo binso bakobangaka Nko­mbo ya ngai ! »