JONAH
Chapter 3
Jona | LinVB | 3:3 | Yona atelemi, mbala eye akei o Ninive lokola Yawe alobaki na ye. Ninive ezalaki engumba enene mpenza, okotambola mikolo misato mpo ya kokatisa yango. | |
Jona | LinVB | 3:4 | Yona ayingeli o engumba, atamboli mokolo mobimba ; asakoli boye : « Etikali mikolo ntuku inei babebisa Ninive. » | |
Jona | LinVB | 3:5 | Bato ba Ninive bandimi Nzambe. Batindi ’te bato banso balala nzala, bakolo na bana, mpe balati ngoto. | |
Jona | LinVB | 3:6 | Nsango ekomi o matoi ma mokonzi wa Ninive ; mokonzi alongwi o ngwende ya ye, atiki elamba ya lokumu, alati ngoto mpe akei kofanda o kati ya mputulu. | |
Jona | LinVB | 3:7 | O Ninive mobimba bayebisi mobeko mwa mokonzi mpe mwa bankumu ba engumba ’te : « Ná bato ná nyama, ngombe na bibwele, banso balia eloko yoko te, bamele mpe mai te. | |
Jona | LinVB | 3:8 | Banso balata ngoto mpe babondela Nzambe mingi mpenza. Moto na moto atika ezalela ebe ya ye mpe aboya mabe azalaki kosala. | |
Jona | LinVB | 3:9 | Mbele Nzambe akotika mokano mwa ye, akoyoka mawa mpe akokitisa motema, bongo tokufa te. » | |