Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
HOSEA
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14
Prev Up Next
Chapter 3
Hose LinVB 3:1  Yawe alobi na ngai : « Kende lisusu mpe lakisa bolingi na mwasi wa bokali, oyo akolingaka babali basusu, lokola Yawe akoli­ngaka bana ba Israel, ata balingi ba­nzambe basusu mpe bakobonzelaka bango minkate mya mbuma ya vino. »
Hose LinVB 3:2  Bongo nakei kokamata ye, nafuti mitako zomi na mitano mpe pipa isato ya loso.
Hose LinVB 3:3  Nalobi na ye : « Mikolo mingi okofanda penepene na ngai ; okosala bondumba te, okolinga mobali mosusu te, mpe ngai nakosala yo se bongo. »
Hose LinVB 3:4  Mikolo mingi bana ba Israel bakotikala bango moko : mokonzi te, moyangeli te, miboma te, etumbelo te, efod te, terafim mpe te.
Hose LinVB 3:5  Na nsima bana ba Israel bakozonga, bakoluka lisusu Yawe Nzambe wa bango, bakotosa Davidi mokonzi wa bango. Bakobondela Yawe mpe bakobanga ye. Mokolo mona bakolinga makabo ma ye.