Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
HOSEA
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14
Prev Up Next
Chapter 2
Hose LinVB 2:1  Bana ba Israel bakozala ebele lokola zelo o libongo lya mbu ; moto moko ndakoki kotanga ba­ngo te. Bakotika koloba na bango : « Bozali ekolo ya ngai te. » Bakotanga bango ‘Bana ba Nza­mbe wa bomoi’.
Hose LinVB 2:2  Bato ba Yuda na bato ba Israel bakosangana lisusu, bakopono mokonzi se moko mpe bakoleka mingi o mokili, mpo mokolo mwa Yizreel mokozala mokolo monene.
Hose LinVB 2:3  Loba na bandeko babali ba yo : ‘Ekolo ya ngai’, mpe na bandeko basi ba yo : ‘Mwa­si wa bolingo’.
Hose LinVB 2:4  Bofunda mama wa bino, bosambisa ye, mpo azali mwasi wa ngai lisusu te, mpe ngai nazali mobali wa ye lisusu te. Alongola bilembo bya ekobo o elongi ya ye, mpe bilembo bya bokali o bontolo bwa ye.
Hose LinVB 2:5  Soki te, nakolongola ye bilamba binso o nzoto, atikala bolumbu lokola babotaki ye. Nakotika ye mpamba lokola eliki, nakokomisa ye lokola mabelé makauka, mpe nakotika ye akufa na mposa ya mai.
Hose LinVB 2:6  Nakoyokela bana ba ye mawa soki te, mpo bazali bana ba bondumba.
Hose LinVB 2:7  Ya solo, mama wa bango asali bo­ndumba, oyo aboti bango amisambwisi ; alobaki : « Nakolanda bamakango ba ngai, bakopesa ngai bilei na mai ma bomeli, bakokabela ngai bilamba, mafuta na masanga. »
Hose LinVB 2:8  Yango wana nakokangisa nzela ya ye na nzube, nakozinga ye na efelo mpo ’te ayeba nzela lisusu te.
Hose LinVB 2:9  Akoluka bamakango ba ye, akozwa bango te, akolanda bango, kasi akokutana na bango te. Bongo akoloba : « Nakozongela mobali wa ngai wa yambo, zambi kala nazalaki malamu, sikawa nakomi na mpasi. »
Hose LinVB 2:10  Ayebaki te ’te ngai moto nazalaki kopesa ye fufu ya mampa, vino na mafuta ma sika. Nazalaki kopesa ye palata na wolo, nzokande atuli na yango bikeko bya ba-Baal.
Hose LinVB 2:11  Yango wana soko eleko ekoki nakobotolo ye fufu ya mampa na mpe vino ya sika, nakobotolo ye bilamba napesaki ye, bizalaki kozipa bolumbu bwa ye.
Hose LinVB 2:12  Nakoyokisa ye nsoni o miso ma bamakango ba ye, moto moko te akobikisa ye o maboko ma ngai.
Hose LinVB 2:13  Nakosilisa bisengo bya ye binso, nakobebisa biyenga bya ye bya nsuka ya sanza, mikolo mya Sabato na mpe biye­nga binene binso.
Hose LinVB 2:14  Nakobebisa nzete ya ye ya vino mpe ya figi, iye afundaki na yango : « Nasombi yango na mosolo mwa bamakango ba ngai. » Nakobongola nzete ina nzete ya zamba, nyama ya zamba ikolia yango.
Hose LinVB 2:15  Nakosambisa ye mpo ya mikolo miye akumisaki ba-Baal, ntango azalaki kotumbela bango mpaka ya malasi. Azalaki kolata mpete o maboko mpe mayaka o nkingo mpo ya kolanda bamakango ba ye, mpe azalaki kobosana ngai ! Maloba ma Yawe.
Hose LinVB 2:16  Sikawa nakobembe ye, nakokamba ye o eliki, esika nakoloba na ye maloba ma bolingi.
Hose LinVB 2:17  Kuna nakozongisela ye bilanga bya vino, nakokomisa lobwaku la Akor nzela ya elikya ; kuna akondimela ngai lokola o ntango ya bolenge, ntango nabimisaki ye o Ezipeti.
Hose LinVB 2:18  Yawe alobi boye : Mokolo mona okobenga ngai ‘Mo­bali wa ngai’, okobenga ngai lisusu ‘Baal wa ngai’ te.
Hose LinVB 2:19  Nakolongola o monoko mwa ye nkombo ya ba-Baal, akotanga nkombo ya bango lisusu te.
Hose LinVB 2:20  Mpo ya bango, nakoyokana mokolo mona na nyama ya zamba, na ndeke ya likolo mpe na nyama ikolandaka o mabelé ; nakobuka matimbo mpe mimpa­nga mya bitumba, mpe nakosala ’te bafanda na boboto.
Hose LinVB 2:21  Okozala lisusu mwasi wa ngai seko, na bosembo mpe na bosolo, na bolingi mpe na boboto.
Hose LinVB 2:22  Okokoma mwasi wa ngai wa lobokó, bongo okoyeba Yawe malamu.
Hose LinVB 2:23  Yawe alobi boye : Mokolo mona nakondimela likolo, mpe likolo likondimela nse.
Hose LinVB 2:24  Mabelé makobota mbuma, mampa, vino na mafuta ma sika, biloko biye balingi o Yizreel.
Hose LinVB 2:25  Ngai moko nakolona mboto o mabelé, nakoyokela Lo-Rukama mawa, nakoloba na Lo-Ami : « Ozali ekolo ya ngai », mpe ye akotanga ngai ‘Nzambe wa ngai !’