HOSEA
Chapter 12
Hose | LinVB | 12:1 | Efraim alembisi ngai na makambo ma lokuta, bato ba Israel bazalaki kokosa ngai. Kasi Yuda alandi naino nzela ya Nzambe mpe atosi Mosantu wa ye. | |
Hose | LinVB | 12:2 | Efraim akolukaka mompepe mingi, akotikaka te kolanda mompepe mwa Esti ; mosala mwa ye, se kokosa mpe konyokolo bato : akati bondeko na ba-Asur mpe akoyelaka ba-Ezipeti mafuta. | |
Hose | LinVB | 12:3 | Yawe akokata likambo lya Yuda, akosambisa Yakob mpo ya ezalela ya ye, mpe akozongisela ye engebene na misala mya ye. | |
Hose | LinVB | 12:4 | Ut’o libumu lya mama wa ye asilaki kokosa ndeko wa ye ; awa akomi mokolo, abundisaki Yawe. | |
Hose | LinVB | 12:5 | Abundaki etumba na anzelu mpe alongaki ye ; alelaki mpe abondelaki ye. O Betel akutanaki na Nzambe, kuna Nzambe asololaki na ye. | |
Hose | LinVB | 12:7 | Yo okozonga mpo ya lisalisi lya Nzambe wa yo ; zala na bolingi mpe na bosolo, tia motema na Nzambe wa yo ntango inso. | |
Hose | LinVB | 12:9 | Efraim alobi : « Nakomi moto wa nkita, nasangisi biloko ebele » ; o matomba ma ngai bazwi ngai na mabe moko te. | |
Hose | LinVB | 12:10 | Ut’o Ezipeti nazali Yawe Nzambe wa yo, nakofandisa yo lisusu o biema, lokola o ntango tokutanaka. | |
Hose | LinVB | 12:12 | Bato ba Galaad bazangi bosembo, maloba ma bango se ma lokuta. O Gilgal bakobonzaka miboma mya ngombe, yango wana bitumbelo bya bango bikokoma lokola mibondo mya mabanga o bilanga. | |
Hose | LinVB | 12:13 | Yakob akimaki mosika o bisobe bya Aram ; Israel asalaki mosala mpo ’te abala mwasi, mpo azwa mwasi amikomisi mokengeli wa bibwele. | |