Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
HOSEA
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14
Prev Up Next
Chapter 12
Hose LinVB 12:1  Efraim alembisi ngai na makambo ma lokuta, bato ba Israel bazalaki kokosa ngai. Kasi Yuda alandi naino nzela ya Nzambe mpe atosi Mosantu wa ye.
Hose LinVB 12:2  Efraim akolukaka mompepe mi­ngi, akotikaka te kolanda mompepe mwa Esti ; mosala mwa ye, se kokosa mpe ko­nyokolo bato : akati bondeko na ba-Asur mpe akoyelaka ba-Ezipeti mafuta.
Hose LinVB 12:3  Yawe akokata likambo lya Yuda, akosambisa Yakob mpo ya ezalela ya ye, mpe akozongisela ye engebene na misala mya ye.
Hose LinVB 12:4  Ut’o libumu lya mama wa ye asilaki kokosa ndeko wa ye ; awa akomi mokolo, abundisaki Yawe.
Hose LinVB 12:5  Abundaki etumba na anzelu mpe alongaki ye ; alelaki mpe abondelaki ye. O Betel akutanaki na Nzambe, kuna Nzambe asololaki na ye.
Hose LinVB 12:6  Ye Yawe Nzambe wa bokasi bo­nso : nkombo ya ye, Yawe !
Hose LinVB 12:7  Yo okozonga mpo ya lisalisi lya Nzambe wa yo ; zala na bolingi mpe na bosolo, tia motema na Nzambe wa yo ntango inso.
Hose LinVB 12:8  Kanana asimbi emekeli ya bokosi o maboko, alingi kokosa bato.
Hose LinVB 12:9  Efraim alobi : « Nakomi moto wa nkita, nasangisi biloko ebele » ; o matomba ma ngai bazwi ngai na mabe moko te.
Hose LinVB 12:10  Ut’o Ezipeti nazali Yawe Nzambe wa yo, nakofandisa yo lisusu o biema, lokola o ntango tokutanaka.
Hose LinVB 12:11  Nakoloba na baprofeta, nakomonisa mamoni, nakoteyisa baprofeta na miulani.
Hose LinVB 12:12  Bato ba Galaad bazangi bosembo, maloba ma bango se ma lokuta. O Gilgal bakobonzaka miboma mya ngombe, yango wana bitumbelo bya bango bikokoma lokola mibondo mya mabanga o bilanga.
Hose LinVB 12:13  Yakob akimaki mosika o bisobe bya Aram ; Israel asalaki mosala mpo ’te aba­la mwasi, mpo azwa mwasi amikomisi mokengeli wa bibwele.
Hose LinVB 12:14  Yawe atindi profeta alongola Israel o Ezipeti, profeta moko azalaki kobatela ye.
Hose LinVB 12:15  Kasi Efraim atuki Nzambe mingi : Yawe akotuna ye mpo ya makila asopaki mpe akozongisela ye mabe manso asalaki.