Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
HOSEA
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14
Prev Up Next
Chapter 6
Hose LinVB 6:1  « Yakani, tozonga epai ya Yawe. Ye azokisi biso, sikawa akobikisa biso ; abeti biso, sikawa akokanga mpota ya biso.
Hose LinVB 6:2  Nsima ya mikolo mibale akozo­ngisela biso bomoi, mokolo mwa misato akotelemisa biso, mpe tokozala malamu o miso ma ye.
Hose LinVB 6:3  Tosala makasi mpo toyeba Yawe malamu. Akoya solo lokola botani bwa nto­ngo, boyei bwa ye bokozala lokola mbula, lokola mamio makokitela mabelé. »
Hose LinVB 6:4  Nzambe ayanoli : Nasala yo nini, Efraim ? Nasala yo nini, Yuda ? Bolingi bwa bino bozali lokola lo­ndende la ntongo, lokola mamio maye makolimwaka noki.
Hose LinVB 6:5  Nanyokoloki bango na maloba ma baprofeta, nabomaki bango na maloba ma monoko mwa ngai. Nasambisaki bango lokola mwi­nda mobimelaki bango.
Hose LinVB 6:6  Ngai nalingi bolingi, leka mabo­nza, nalingi ’te bondima Nzambe, leka miboma.
Hose LinVB 6:7  Kasi babebisi bondeko bwa ngai o Adam, bawangani ngai.
Hose LinVB 6:8  Galaad ezali engumba ya bato babe, etondi na makila masopani wana.
Hose LinVB 6:9  Lokola lingomba lya bayibi babo­mbami mpembeni ya nzela, banganga Nzambe bakobomaka ba­to o nzela ya Sikem. Tala makambo ma nsomo bakosalaka.
Hose LinVB 6:10  O Betel namoni makambo ma nsomo ; Efraim akosalaka bondumba, Israel akomikomisaka na mbindo.
Hose LinVB 6:11  Yuda, nakolengelele yo bilanga na mbuma ebele, mokolo nakobongisa makambo ma bato ba ngai.