HOSEA
Chapter 2
Hose | LinVB | 2:1 | Bana ba Israel bakozala ebele lokola zelo o libongo lya mbu ; moto moko ndakoki kotanga bango te. Bakotika koloba na bango : « Bozali ekolo ya ngai te. » Bakotanga bango ‘Bana ba Nzambe wa bomoi’. | |
Hose | LinVB | 2:2 | Bato ba Yuda na bato ba Israel bakosangana lisusu, bakopono mokonzi se moko mpe bakoleka mingi o mokili, mpo mokolo mwa Yizreel mokozala mokolo monene. | |
Hose | LinVB | 2:3 | Loba na bandeko babali ba yo : ‘Ekolo ya ngai’, mpe na bandeko basi ba yo : ‘Mwasi wa bolingo’. | |
Hose | LinVB | 2:4 | Bofunda mama wa bino, bosambisa ye, mpo azali mwasi wa ngai lisusu te, mpe ngai nazali mobali wa ye lisusu te. Alongola bilembo bya ekobo o elongi ya ye, mpe bilembo bya bokali o bontolo bwa ye. | |
Hose | LinVB | 2:5 | Soki te, nakolongola ye bilamba binso o nzoto, atikala bolumbu lokola babotaki ye. Nakotika ye mpamba lokola eliki, nakokomisa ye lokola mabelé makauka, mpe nakotika ye akufa na mposa ya mai. | |
Hose | LinVB | 2:7 | Ya solo, mama wa bango asali bondumba, oyo aboti bango amisambwisi ; alobaki : « Nakolanda bamakango ba ngai, bakopesa ngai bilei na mai ma bomeli, bakokabela ngai bilamba, mafuta na masanga. » | |
Hose | LinVB | 2:8 | Yango wana nakokangisa nzela ya ye na nzube, nakozinga ye na efelo mpo ’te ayeba nzela lisusu te. | |
Hose | LinVB | 2:9 | Akoluka bamakango ba ye, akozwa bango te, akolanda bango, kasi akokutana na bango te. Bongo akoloba : « Nakozongela mobali wa ngai wa yambo, zambi kala nazalaki malamu, sikawa nakomi na mpasi. » | |
Hose | LinVB | 2:10 | Ayebaki te ’te ngai moto nazalaki kopesa ye fufu ya mampa, vino na mafuta ma sika. Nazalaki kopesa ye palata na wolo, nzokande atuli na yango bikeko bya ba-Baal. | |
Hose | LinVB | 2:11 | Yango wana soko eleko ekoki nakobotolo ye fufu ya mampa na mpe vino ya sika, nakobotolo ye bilamba napesaki ye, bizalaki kozipa bolumbu bwa ye. | |
Hose | LinVB | 2:12 | Nakoyokisa ye nsoni o miso ma bamakango ba ye, moto moko te akobikisa ye o maboko ma ngai. | |
Hose | LinVB | 2:13 | Nakosilisa bisengo bya ye binso, nakobebisa biyenga bya ye bya nsuka ya sanza, mikolo mya Sabato na mpe biyenga binene binso. | |
Hose | LinVB | 2:14 | Nakobebisa nzete ya ye ya vino mpe ya figi, iye afundaki na yango : « Nasombi yango na mosolo mwa bamakango ba ngai. » Nakobongola nzete ina nzete ya zamba, nyama ya zamba ikolia yango. | |
Hose | LinVB | 2:15 | Nakosambisa ye mpo ya mikolo miye akumisaki ba-Baal, ntango azalaki kotumbela bango mpaka ya malasi. Azalaki kolata mpete o maboko mpe mayaka o nkingo mpo ya kolanda bamakango ba ye, mpe azalaki kobosana ngai ! Maloba ma Yawe. | |
Hose | LinVB | 2:17 | Kuna nakozongisela ye bilanga bya vino, nakokomisa lobwaku la Akor nzela ya elikya ; kuna akondimela ngai lokola o ntango ya bolenge, ntango nabimisaki ye o Ezipeti. | |
Hose | LinVB | 2:18 | Yawe alobi boye : Mokolo mona okobenga ngai ‘Mobali wa ngai’, okobenga ngai lisusu ‘Baal wa ngai’ te. | |
Hose | LinVB | 2:20 | Mpo ya bango, nakoyokana mokolo mona na nyama ya zamba, na ndeke ya likolo mpe na nyama ikolandaka o mabelé ; nakobuka matimbo mpe mimpanga mya bitumba, mpe nakosala ’te bafanda na boboto. | |
Hose | LinVB | 2:21 | Okozala lisusu mwasi wa ngai seko, na bosembo mpe na bosolo, na bolingi mpe na boboto. | |
Hose | LinVB | 2:24 | Mabelé makobota mbuma, mampa, vino na mafuta ma sika, biloko biye balingi o Yizreel. | |