Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II CORINTHIANS
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13
Prev Up Next
Chapter 7
II C LinVB 7:1  Bandeko ba bolingo, Nzámbe alakélákí bísó bilakó byangó ; bôngó tómípétola, mbindo ínso ya nzóto mpé ya molímo ílongwa. Bô-ngó tómemya Nzámbe mpé tómípésa mobimba na mosálá mwa bomísántisi.
II C LinVB 7:2  Bóyamba bísó o mitéma mya bínó. Tosálákí moto mǒkó mabé té ; tobébísákí bomengo bwa moto mǒ­kó té, tobótólókí moto mǒkó elóko té.
II C LinVB 7:3  Nalobí yangó té mpô ya kokitisa bínó o likambo : Nasílí nalobákí na bínó libosó : tobómbí bínó o mitéma mya bísó sékô téé liwá.
II C LinVB 7:4  Ngáí natíí motéma na bínó mpenzá, bínó bozalí ntína ya lokúmu la ngáí ; yangó ebóndí ngáí mpé etóndísí ngáí na esengo o ntángo ya mpási ya ngáí ínso.
II C LinVB 7:5  Ntángo tokómákí o Masedónia tokokákí kopémisa nzóto té ; bipái bínso sé makambo ma mpási : to­zwákí matáta na bato basúsu, mpé tozalákí kobánga o mitéma.
II C LinVB 7:6  Kasi Nzámbe óyo akobóndoko mitéma mya bato ba mawa abóndókí mpé bísó na boyéi bwa Títo.
II C LinVB 7:7  Ezalí sé mpô ya boyéi bwa yě té, kasi Títo ayébísákí bísó bóníbóní bobó­ndókí yě. Asolólákí bísó bóníbóní bozalí na mpósá ya komóno ngáí, ndéngé bozalí koyóka mawa mpô ya ngáí mpé kobátela lokúmu la ngáí na mpíla. Yangó wâná nazalí koyóka esengo enéne.
II C LinVB 7:8  Sôló, sókó nayókísákí bínó mpá­si na monkandá mwa ngáí, nazalí koyóka yangó mawa té. Mpé atâ nayókákí mawa, zambí monkandá môná moyókísákí bínó atâ mwâ mpási o motéma,
II C LinVB 7:9  sikáwa nazalí kosepéla : ezalí té mpô namóní mawa ma bínó, kasi mpô namóní ndéngé mpási ya bínó esálákí ’te bóbóngola mitéma. Bísó tosálákí bínó mabé atâ mǒkó té, sé Nzámbe andimákí ’te bóyóka mawa.
II C LinVB 7:10  Mawa maye mazalí kosepelisa Nzámbe makosálisa moto mpô ’te ábóngola motéma mpé ábíka. Bôngó mawa ma yě makosíla o ntángo êná ; kasi moto ayókí mawa mpô ya makambo ma nsé, akosúka o liwá.
II C LinVB 7:11  Bótála ndéngé mawa maye mazwě lí bínó bolámu mpenzá : bobandí kopangana na mosálá mwa Nzámbe mpé kosénge bolímbisi ! Bokómí koyóka mabé na maye bosálákí, kobánga mpé koyóka mpósá ya kobongisa makambo ma bínó ! Bokómí na mpíkó sôló mpé bopésákí moto ôná etú­mbu ya sôló ! Na makambo mâná mánso bolakísí ’te bondimákí mabé ma yě té.
II C LinVB 7:12  Sókó nakomélákí bínó monkandá, nasálákí yangó té mpô ya moto asálákí mabé tǒ mpô ya moto óyo basálákí yě mabé. Kasi nalingákí ’te bolingi bokolingaka bísó bómónono polélé o míso ma Nzámbe.
II C LinVB 7:13  Likambo liye libóndí mitéma mya bísó. Bobóndí bísó sôló, kasi toyókákí mpé esengo enéne ntángo tomóní esengo ya Títo, mpô bínó bokitísákí yě motéma.
II C LinVB 7:14  Sikáwa nayókí nsóni té ’te nakúmísákí bíno mwâ moké o míso ma yě. Sé lokóla mambí mánso toyébísákí bínó mazalí sé mambí ma sôló, maye tolobákí na yě mpô ya kokúmisa bínó, mazalákí mpé ma sôló.
II C LinVB 7:15  Apusí kolinga bínó bánso, áwa akundólí o motéma botósi bwa bínó mpé loléngé boyambákí yě na limemyá linéne.
II C LinVB 7:16  Nayókí esengo enéne, mpô nakokí kotía motéma na bínó o makambo mánso.