Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MICAH
1 2 3 4 5 6 7
Prev Up Next
Chapter 3
Mica LinVB 3:1  Nalobi : Bino bakolo ba libota lya Yakob, elongo na bayangeli ba libota lya Israel, boyoka ! Bino mpenza bosengeli koyeba mibeko mya bosembo,
Mica LinVB 3:2  kasi boyini makambo malamu, bolingi se mabe. Bokolongolaka bato mposo o nzo­to lokola bakobabolaka nyama, bokolongolaka misuni minso o minkuwa mya bango !
Mica LinVB 3:3  Bakoliaka nsuni ya bato ba ngai, bakolongolaka bango mposo mpe bakobukaka minkuwa mya bango, lokola bakokataka misuni o lisasu, mpe bakotiaka biteni bya misuni o móto.
Mica LinVB 3:4  Mokolo bango bakobelela Yawe, akoyanola bango soki te ; kasi mpo ya masumu manso basalaki, akobomba elongi ya ye.
Mica LinVB 3:5  Yawe alobi boye ona baprofeta, baye bakobungisaka bato ba ngai nzela : Soko bapesi bango biloko bya bolei, bakosakola makambo ma boboto. Kasi na bato bapesi bango eloko te, bakosakolaka makambo ma bitu­mba bizali koya.
Mica LinVB 3:6  Na ntina ena bokomono mamoni lisusu te na butu ; bokofanda o molili, bokoyoka liloba lya Nzambe te. Mwese mokokita mpo ya baprofeta baye, bakomono moi lisusu te.
Mica LinVB 3:7  Bongo bamoni-makambo bakoyoka nsoni, balobi-makambo bakosambwa, banso bakozipa monoko, zambi Nzambe akopesa bango eyano te.
Mica LinVB 3:8  Nzokande nazali na nguya ya elimo ya Yawe, ngai nazali na bosembo, na mpiko, mpo ’te nalakisa Yakob mabe ma ye, mpe nakundolela Israel masumu asalaki.
Mica LinVB 3:9  Bongo bino, bakolo ba libota lya Yakob, na bino bayangeli ba ekolo ya Israel, boyoka, bino bato bokolingaka bosembo te, bokokomisaka makambo mazali semba mabunu mabunu.
Mica LinVB 3:10  Bozali kotonga Sion na makila ma bato mpe Yeruzalem na makambo mabe !
Mica LinVB 3:11  Bazuzi ba ye bakokataka maka­mbo mpo ya kozwa makabo, banganga Nzambe ba ye bakoteyaka bato mpo ya lifuta, baprofeta ba ye bakosakolaka mpo ya mosolo ; nzokande bakotiaka mitema na Yawe, bakolobaka : « Yawe azali o ntei ya biso te ? Mabe makoki kokwela biso te. »
Mica LinVB 3:12  Yango wana mpo ya mabe ma bino, Sion ekokoma mabelé ma kokata bilanga ; Yeruzalem ekokoma mopotu, mpe ngomba ya Tempelo ekoto­nda na nzete.