MICAH
Chapter 3
Mica | LinVB | 3:1 | Nalobi : Bino bakolo ba libota lya Yakob, elongo na bayangeli ba libota lya Israel, boyoka ! Bino mpenza bosengeli koyeba mibeko mya bosembo, | |
Mica | LinVB | 3:2 | kasi boyini makambo malamu, bolingi se mabe. Bokolongolaka bato mposo o nzoto lokola bakobabolaka nyama, bokolongolaka misuni minso o minkuwa mya bango ! | |
Mica | LinVB | 3:3 | Bakoliaka nsuni ya bato ba ngai, bakolongolaka bango mposo mpe bakobukaka minkuwa mya bango, lokola bakokataka misuni o lisasu, mpe bakotiaka biteni bya misuni o móto. | |
Mica | LinVB | 3:4 | Mokolo bango bakobelela Yawe, akoyanola bango soki te ; kasi mpo ya masumu manso basalaki, akobomba elongi ya ye. | |
Mica | LinVB | 3:5 | Yawe alobi boye ona baprofeta, baye bakobungisaka bato ba ngai nzela : Soko bapesi bango biloko bya bolei, bakosakola makambo ma boboto. Kasi na bato bapesi bango eloko te, bakosakolaka makambo ma bitumba bizali koya. | |
Mica | LinVB | 3:6 | Na ntina ena bokomono mamoni lisusu te na butu ; bokofanda o molili, bokoyoka liloba lya Nzambe te. Mwese mokokita mpo ya baprofeta baye, bakomono moi lisusu te. | |
Mica | LinVB | 3:7 | Bongo bamoni-makambo bakoyoka nsoni, balobi-makambo bakosambwa, banso bakozipa monoko, zambi Nzambe akopesa bango eyano te. | |
Mica | LinVB | 3:8 | Nzokande nazali na nguya ya elimo ya Yawe, ngai nazali na bosembo, na mpiko, mpo ’te nalakisa Yakob mabe ma ye, mpe nakundolela Israel masumu asalaki. | |
Mica | LinVB | 3:9 | Bongo bino, bakolo ba libota lya Yakob, na bino bayangeli ba ekolo ya Israel, boyoka, bino bato bokolingaka bosembo te, bokokomisaka makambo mazali semba mabunu mabunu. | |
Mica | LinVB | 3:11 | Bazuzi ba ye bakokataka makambo mpo ya kozwa makabo, banganga Nzambe ba ye bakoteyaka bato mpo ya lifuta, baprofeta ba ye bakosakolaka mpo ya mosolo ; nzokande bakotiaka mitema na Yawe, bakolobaka : « Yawe azali o ntei ya biso te ? Mabe makoki kokwela biso te. » | |