NEHEMIAH
Chapter 2
Nehe | LinVB | 2:1 | O sanza Nisan, o mobu mwa ntuku ibale Artaksasta azalaki mokonzi, ngai Neemia nazalaki na mosala mwa kobongela mokonzi vino ; nakamati vino mpe napesi mokonzi. Mokolo moko te mokonzi amonoki ngai na elongi ya mawa. | |
Nehe | LinVB | 2:2 | Yango wana atuni ngai : « Mpo nini ozali na elongi ya mawa ? Ozali kobele ? Nakanisi ’te ozali na likambo o motema. » Ngai nakamwi mingi, | |
Nehe | LinVB | 2:3 | mpe nalobi na ye : « Mokonzi azala seko ! Nazala na elongi ya mawa te boni ! Mboka esika bakundi bankoko ba ngai ekufi, batumbi mpe bizibeli bya mboka. » | |
Nehe | LinVB | 2:5 | mpe nazongiseli mokonzi : « Soko okoki kondimela ngai, mpe soko ya solo nazwi bolamu o miso ma yo, tika ngai nakende o mokili mwa Yuda, esika bakundi bankoko ba ngai, bongo natonga engumba lisusu. » | |
Nehe | LinVB | 2:6 | Mwasi wa mokonzi afandi penepene na ye, mpe na nsima mokonzi atuni ngai : « Mobembo mwa yo mokoumela mikolo boni ? Okozonga mokolo nini ? » Nalakeli ye mokolo mwa bozongi, mpe mokonzi andimi, alingisi ngai nakende. | |
Nehe | LinVB | 2:7 | Nalobi na ye lisusu : « Soko olingi, opesa ngai minkanda nalakisa bayangeli ba mokili o ngambo ya Ebale, bongo balekisa ngai o mokili mwa bango mpo nakoma o Yuda. | |
Nehe | LinVB | 2:8 | Opesa ngai mpe monkanda mpo ya Asaf, mokengeli wa zamba ya mokonzi, mpo ’te akatela ngai mabaya mpo ya bizibeli bya ndako Nzambe, mpo ya kotonga lopango la engumba na mpe ndako esika nalingi kofanda. » Mokonzi andimeli ngai, mpo loboko la Nzambe lobateli ngai. | |
Nehe | LinVB | 2:9 | Yango wana nakei epai ya baya-ngeli ba ngambo ya Efrate, napesi bango minkanda mya mokonzi. Mokonzi apesaki ngai bakonzi ba basoda na batambwisi farasa. | |
Nehe | LinVB | 2:10 | Ntango bayebisi yango na Sambalat, moto wa Koron, na Tobia, moto wa Amon, zuzi wa leta, basiliki zambi moto mosusu ayei kobongisa bolamu bwa ba-Israel. | |
Nehe | LinVB | 2:12 | Na nsima natelemi na butu mpe nakei elongo na mwa bato basusu, kasi nayebisaki moto moko makanisi te maye Nzambe apesaki ngai mpo ya kobongisa Yeruzalem. Nazalaki na farasa esusu te, se farasa ya ngai moko. | |
Nehe | LinVB | 2:13 | Nalongwi o engumba na butu, nabimi epai ya ‘Ezibeli ya Lobwaku’, nalandi nzela eye bakotangaka ‘Liziba lya Bilima’, na nsima nakomi o esika bakotangaka ‘Ezibeli ya Bipoli’ ; natali lopango lonene la Yeruzalem o esika lobebi mpe bizibeli bya mboka biziki. | |
Nehe | LinVB | 2:14 | Nabengi nzela ya ngai epai ya ‘Ezibeli ya Liziba’ mpe epai ya ‘Etima ya Mokonzi’, kasi farasa eye nabuteli ekoki koleka wana te. | |
Nehe | LinVB | 2:15 | Bongo nazongi bobele na butu bona, naleki o nzela ya lobwaku ; nazalaki se kotala lopango mpe nayingeli lisusu o engumba epai ya ‘Ezibeli ya Lobwaku’. | |
Nehe | LinVB | 2:16 | Bayangeli bamonoki te esika nakei to nini nalingi kosala. O mokolo mona nayebisaki eloko te : banganga Nzambe, bankumu, bazuzi na bakolo bayebaki yango te. | |
Nehe | LinVB | 2:17 | Na nsima nayebisi bango : « Bozali komono mpasi ya biso : Yeruzalem ekomi mopotu, bizibeli bya mboka biziki. Tokende kobongisa lisusu lopango lonene la Yeruzalem mpo ’te banguna baseke biso lisusu te ! » | |
Nehe | LinVB | 2:18 | Nayebisi bango boniboni Nzambe wa ngai asalisaki ngai, nayebisi bango mpe maye mokonzi alobaki na ngai. Bango balobi : « Tokende kotonga ! » Bongo bandimi kosalisa ngai o mosala mona monzenga. | |
Nehe | LinVB | 2:19 | Awa Sanbalat, moto wa Koron, na mo-Amon Tobia, zuzi wa leta, na mo-Arabu Gesem, bayoki yango, baseki biso, batioli biso, balobi : « Bolingi kosala nini kuna ? Bolingi nde kotombokela mokonzi ? » | |