NEHEMIAH
Chapter 12
Nehe | LinVB | 12:1 | Tala awa nkombo ya banganga Nzambe na ba-Levi bauti o boombo elongo na Zorobabel, mwana wa Sealtiel, na Yozue : Seraya, Yirmeya, Esdra, | |
Nehe | LinVB | 12:7 | Salu, Amok, Kilkia, Yedaya ; bango bazalaki bakonzi ba banganga Nzambe na bandeko ba bango o eleko ya Yozue. | |
Nehe | LinVB | 12:8 | Ba-Levi : Yozue, Binui, Kadmiel, Serbia, Yeyuda, Matania, na bandeko ba ye bazalaki koyembisa nzembo ya kotondo Nzambe. | |
Nehe | LinVB | 12:9 | Bandeko ba bango Bakbukia na Uni bazalaki kosalisa bango o mosala mwa kokengele bizibeli. | |
Nehe | LinVB | 12:12 | O eleko ya Yoyakim, bakonzi ba mabota ma banganga Nzambe bazalaki : Meraya o libota lya Seraya ; Kanania o libota lya Yirmeya ; | |
Nehe | LinVB | 12:22 | O eleko ya Eliasib, Yoyada, Yokanan na Yadua, bakomi nkombo ya bakonzi ba ba-Levi na banganga Nzambe o buku tee o eleko ya Dario, mokonzi wa Persi. | |
Nehe | LinVB | 12:23 | Nkombo ya bakonzi ba ba-Levi ikomami o buku ya Bikela tee o eleko ya Yokanan, nkoko wa Eliasib. | |
Nehe | LinVB | 12:24 | Bakonzi ba ba-Levi bazalaki : Kasabia, Serabia, Yozue, Binui, Kadmiel, na bandeko ba bango bazalaki penepene mpo ya koyemba lingomba na lingomba, lokola Davidi, moto wa Nzambe, atindaki. | |
Nehe | LinVB | 12:25 | Bango baye : Matania, Bakbukia na Obadia ; kasi Mesulam, Talmon na Akub bazalaki bakengeli ba bizibeli bya Tempelo. | |
Nehe | LinVB | 12:26 | Bango banso bazalaki kosala mosala o eleko ya Yoyakim, mwana wa Yozue, nkoko wa Yosadak, mpe o eleko ya moyangeli Neemia na nganga Nzambe mpe moteyi Esdra. | |
Nehe | LinVB | 12:27 | Mpo ya eyenga ya bobenisi lopango la Yeruzalem bakei koluka ba-Levi o bisika binso bazalaki kofanda, babengi bango o Yeruzalem mpo ’te bakoka kosepela eyenga ya bobenisi lopango na esengo, bayemba nzembo ya botondi Nzambe na miziki mya migbala, lokombe na nzenze. | |
Nehe | LinVB | 12:28 | Bayembi basangani wana, bautaki o ekolo penepene na Yeruzalem mpe o mboka ya bato ba Netofa, | |
Nehe | LinVB | 12:29 | ut’o Bet-Agilgal, bilanga bya Geba mpe bya Azmavet, bayembi batongaki mboka ya bango penepene na Yeruzalem. | |
Nehe | LinVB | 12:30 | Banganga Nzambe na ba-Levi bamipetoli, na nsima bapetoli bato banso, bizibeli bya mboka na mpe lopango lonene. | |
Nehe | LinVB | 12:31 | Natindi bakonzi ba Yuda babuta lopango mpe nasali mangomba mabale ma bayembi. Bato ba lingomba lya yambo batamboli o lopango, bakei o loboko la mobali tee ‘Ezibeli ya Bipoli’. | |
Nehe | LinVB | 12:35 | baye baponomi o kati ya banganga Nzambe mpe bapesaki bango mindule ; na nsima Zekaria, mwana wa Yonatan, mwana wa Semaya, mwana wa Matania, mwana wa Mika, mwana wa Zakur, mwana wa Asaf, | |
Nehe | LinVB | 12:36 | elongo na bandeko ba ye Semaya, Azarel, Milalai, Gilalai, Mayi, Netanel, Yeyuda, Kanani ; bango banso bamemi biyembeli bya Davidi, moto wa Nzambe. Moteyi Esdra azalaki kokamba bango. | |
Nehe | LinVB | 12:37 | O ‘Ezibeli ya Liziba’ basimbi nzela ekokende o Engumba ya Davidi, bakei o efelo ya lopango tee o ndako inene ya Davidi mpe o ‘Ezibeli ya Mai’, epai ya Esti. | |
Nehe | LinVB | 12:38 | Bato ba lingomba lya mabale batamboli o loboko la mwasi. Ngai nalandi bango elongo na bakonzi basusu ba ekolo ; toleki penepene na lopango tee tolandi ‘Linongi lya Fulu’ mpe ‘Efelo enene’ ; | |
Nehe | LinVB | 12:39 | na nsima toleki likolo lya ‘Ezibeli ya Efraim’, ‘Ezibeli ya Yesana’, ‘Ezibeli ya Mbisi’, ‘Linongi lya Kananel’, ‘Linongi lya Nkama’ tee ‘Ezibeli ya Mpata’. Totelemi o ‘Ezibeli ya Bakengeli’. | |
Nehe | LinVB | 12:40 | Mangomba mana mabale bakei koteleme o Tempelo ya Nzambe. Nazalaki wana na ndambo ya bazuzi, | |
Nehe | LinVB | 12:41 | na banganga Nzambe Eliakim, Maseya, Minyamin, Mika, Elioenai, Zekaria, Kanania : bazalaki na mindule. | |
Nehe | LinVB | 12:42 | Bakisa Maseya, Semaya, Eleazar, Uzi, Yokanan, Malkia, Elam na Ezer. Bayembi babandi koyemba ; Yizraya ayangeli bango. | |
Nehe | LinVB | 12:43 | O mokolo mona babonzeli Nzambe miboma ebele, mpe bato basepeli mingi, mpo Nzambe ayokisi bango esengo enene. Basi na bana bazalaki kosepela ; mpe esengo o Yeruzalem ezalaki koyokana mosika. | |
Nehe | LinVB | 12:44 | O mokolo mona batii bato bakengele bibombelo bya biloko, biye bazwaki ntango bato bayaki kofuta mbuma ya yambo na biteni bya zomi bya biloko. Bango basengeli koya-mba biloko biuti o bilanga penepene na mboka, mpe basengeli kopesa byango na banganga Nzambe mpe na ba-Levi, se lokola mobeko motindi. Mosala mwa banganga Nzambe na ba-Levi mozalaki kosepelisa ba-Yuda. | |
Nehe | LinVB | 12:45 | Bazalaki kotosa makambo manso matali mosala mwa Nzambe wa bango, na mpe mosala mwa bopetoli. Bayembi na bakengeli ba bizibeli bya Tempelo balandi mobeko mwa Davidi na Salomo, mwana wa ye. | |
Nehe | LinVB | 12:46 | Ut’o eleko ya Davidi na Asaf, bayangeli ba bayembi bazalaki, na mpe nzembo ya bokumisi mpe ya botondi Nzambe. | |