EZRA
Chapter 3
| Ezra | LinVB | 3:1 | Ekomi sanza ya nsambo, ba-Israel banso basili bakomi o bingumba bya bango, banso bayei kosangana o Yeruzalem motema moko. | |
| Ezra | LinVB | 3:2 | Yozue, mwana wa Yosada, na bandeko ba ye banganga Nzambe, na Zorobabel, mwana wa Sealtiel, na bandeko ba ye babandi kotonga lisusu altare ya Nzambe wa Israel mpo ’te bakoka kobonza mabonza lokola ekomami o buku ya Moze, moto wa Nzambe. | |
| Ezra | LinVB | 3:3 | Batongi lisusu altare o esika ya kala, ata bazalaki kobanga bato batikalaki kofanda wana. Bongo babonzeli Yawe mabonza ma kotumba na ntongo mpe na mpokwa. | |
| Ezra | LinVB | 3:4 | Basepeli eyenga ya Biema lokola ekomami : mokolo na mokolo babonzi mabonza ma kotumba, se lokola etindami. | |
| Ezra | LinVB | 3:5 | Ut’o ntango ena bazalaki kobonza libonza lya kotumba lya mokolo na mokolo, na mabonza o mikolo sanza ya sika ekobimaka, mpe o mikolo mya biyenga binso bya Yawe ; bakisa mabonza maye moto na moto alingi kobonzela Yawe o nkombo ya ye moko. | |
| Ezra | LinVB | 3:6 | Banda mokolo mwa yambo mwa sanza ya nsambo babandi kotumbela Yawe mabonza, ata batii naino mabanga ma nse te mpo ya kotonga Tempelo ya Yawe lisusu. | |
| Ezra | LinVB | 3:7 | Bafuti basali mpo bakata mabanga mpe bapasola mabaya ; bapesi bato ba Sidoni na Tiro biloko bya bolei mpe bya bomeli, na mafuta mpo ’te baya na nzete ya sédere ya Libano, balekisa yango o nzela ya mbu tee Yafa, se lokola Siro, mokonzi wa Persi, apesaki bango ndingisa. | |
| Ezra | LinVB | 3:8 | O mobu mwa mibale mwa bozo-ngi o Tempelo ya Nzambe o Yeruzalem, o sanza ya ibale, Zorobabel, mwana wa Sealtiel, na Yozue, mwana wa Yosada, babandi mosala mwango. Bandeko basusu na banganga Nzambe na ba-Levi, baye bautaki o boombo mpe bazongi o Yeruzalem, basalisi bango. Baponi ba-Levi, baye bakokisi mibu ntuku ibale, mpo ’te bakamba misala mya Tempelo ya Yawe. | |
| Ezra | LinVB | 3:9 | Yozue na bana na bandeko ba ye, Kadmiel na bana na bandeko ba ye, bango banso lisanga bayangeli basali baye batongi Tempelo ya Nzambe ; bakisa bana ba Enadad, na bana na bandeko ba bango, ba-Levi. | |
| Ezra | LinVB | 3:10 | Ntango batongi batii mabanga manene ma nse ma Tempelo ya Yawe, mpe banganga Nzambe balati molato mwa bonganga, babeti mindule, mpe ba-Levi, bana ba Asaf, babeti migbala mpo ya kokumisa Yawe se lokola Davidi, mokonzi wa Israel, atindaki. | |
| Ezra | LinVB | 3:11 | Bayembi nzembo ya kokumisa mpe kotondo Yawe : « Yawe azali malamu, bolingi akolingaka Israel bokosilaka te. » Mpe bato banso bagangi na mongongo makasi, bakumisi Yawe mpo ya ebandela ya botongi Tempelo ya Yawe. | |
| Ezra | LinVB | 3:12 | Banganga Nzambe baike, na ba-Levi na bankumu ba mabota, baye bakomi babange, baye bamonoko Tempelo ya kala, baleli mingi o ntango bamoni ’te bazalaki kotia mabanga manene ma nse. Bato basusu bagangi makasi mpo ya esengo. | |