Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZRA
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10
Prev Up Next
Chapter 3
Ezra LinVB 3:1  Ekomi sanza ya nsambo, ba-Israel banso basili bakomi o bi­ngumba bya bango, banso bayei kosangana o Yeruzalem motema moko.
Ezra LinVB 3:2  Yozue, mwana wa Yosada, na ba­ndeko ba ye banganga Nzambe, na Zorobabel, mwana wa Sealtiel, na bandeko ba ye babandi kotonga lisusu altare ya Nzambe wa Israel mpo ’te bakoka kobonza mabonza lokola ekomami o buku ya Moze, moto wa Nzambe.
Ezra LinVB 3:3  Batongi lisusu altare o esika ya kala, ata bazalaki kobanga bato batikalaki kofanda wana. Bongo ba­bonzeli Yawe mabonza ma kotu­mba na ntongo mpe na mpokwa.
Ezra LinVB 3:4  Ba­se­peli eyenga ya Biema lokola ekomami : mokolo na mokolo babonzi mabonza ma kotumba, se lokola etindami.
Ezra LinVB 3:5  Ut’o ntango ena bazalaki kobonza libonza lya kotumba lya mokolo na mokolo, na mabonza o mikolo sanza ya sika ekobimaka, mpe o mikolo mya biyenga binso bya Yawe ; bakisa mabonza maye moto na moto alingi kobonzela Yawe o nkombo ya ye moko.
Ezra LinVB 3:6  Banda mokolo mwa yambo mwa sanza ya nsambo babandi kotumbela Yawe mabonza, ata batii naino mabanga ma nse te mpo ya koto­nga Tempelo ya Yawe lisusu.
Ezra LinVB 3:7  Bafuti basali mpo bakata mabanga mpe bapasola mabaya ; bapesi bato ba Sidoni na Tiro biloko bya bolei mpe bya bomeli, na mafuta mpo ’te baya na nzete ya sédere ya Libano, balekisa yango o nzela ya mbu tee Yafa, se lokola Siro, mokonzi wa Persi, apesaki bango ndingisa.
Ezra LinVB 3:8  O mobu mwa mibale mwa bozo-ngi o Tempelo ya Nzambe o Yeruzalem, o sanza ya ibale, Zorobabel, mwana wa Sealtiel, na Yozue, mwana wa Yosada, babandi mosala mwango. Bandeko basusu na banganga Nza­mbe na ba-Levi, baye bautaki o boombo mpe bazongi o Yeruzalem, basalisi bango. Baponi ba-Levi, baye bakokisi mibu ntuku ibale, mpo ’te bakamba misala mya Tempelo ya Yawe.
Ezra LinVB 3:9  Yozue na bana na bandeko ba ye, Kadmiel na bana na bandeko ba ye, bango banso lisanga bayangeli basali baye batongi Tempelo ya Nza­mbe ; bakisa bana ba Enadad, na bana na bandeko ba bango, ba-Levi.
Ezra LinVB 3:10  Nta­ngo batongi batii mabanga manene ma nse ma Tempelo ya Yawe, mpe banganga Nzambe balati molato mwa bonganga, babeti mindule, mpe ba-Levi, bana ba Asaf, babeti migbala mpo ya kokumisa Yawe se lokola Davidi, mokonzi wa Israel, atindaki.
Ezra LinVB 3:11  Bayembi nzembo ya kokumisa mpe kotondo Yawe : « Yawe azali malamu, bolingi akolingaka Israel bokosilaka te. » Mpe bato banso bagangi na mo­ngongo makasi, bakumisi Yawe mpo ya ebandela ya botongi Tempelo ya Yawe.
Ezra LinVB 3:12  Banganga Nzambe baike, na ba-Levi na bankumu ba mabota, baye bakomi babange, baye bamonoko Tempelo ya kala, baleli mingi o ntango bamoni ’te bazalaki kotia mabanga manene ma nse. Bato basusu bagangi makasi mpo ya esengo.
Ezra LinVB 3:13  Kasi boleli boyokani lisusu te, mpo makeléle ma bato bazalaki koganga na esengo mayokani mosika.