Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZRA
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10
Prev Up Next
Chapter 6
Ezra LinVB 6:1  Na nsima mokonzi Dario atindi bato baluka monkanda o ebo­mbelo ya mosolo, esika batiaki biloko bya motuya bya Babilon.
Ezra LinVB 6:2  Mpe ya solo, o ebombamelo ezalaki o Ekbatane, o mokili mwa ba-Medi, bazwi monkanda moko na maloba maye : « Monkanda mwa leta :
Ezra LinVB 6:3  O mobu mwa yambo mwa bokonzi bwa ye, mokonzi Siro atindi boye : Likambo lya Tempelo ya Nzambe o Yeruzalem. Batonga lisusu Tempelo mpo ezala esika ya kobonza mabonza ; babongisa mpe mabanga ma nse o esik­a ezalaka liboso. Ezala na bolai maboko ntuku motoba, na bonene maboko ntuku motoba.
Ezra LinVB 6:4  Batanda milongo misato mya mabanga manene mpe molongo moko mwa mabaya ma sika. Bakofuta basali na mosolo mokouta o ndako ya mokonzi.
Ezra LinVB 6:5  Bazo­ngisa biloko binso bya wolo na palata bya Tempelo ya Nzambe, biye Nabukodonozor abotoloki o Tempelo ya Yeruzalem mpe amemeki o Babilon ; batia biloko bina binso lisusu o esika bizalaki kala o ndako esantu ya Yeruzalem.
Ezra LinVB 6:6  Bongo, bino, Tatenai, moyangeli wa mokili o ngambo ya Efrate, na Seta­r-Bozenai na bankumu banso o ngambo ya Efrate, bokoto o likambo lya bango te.
Ezra LinVB 6:7  Botika moyangeli wa Yuda na bakolo ba mboka basala mosala o Tempelo ya Yawe ; bakoki kotonga Tempelo ya Nzambe o esika ya kala.
Ezra LinVB 6:8  Tala mibeko napesi bino : Mpo ya kotonga lisusu Tempelo ya Nza­mbe, bosalisa bakolo ba ba-Yuda boye : Bofuta bango na mosolo mwa leta, ezali mpako ya bato bazali o ngambo ya Efrate. Bafuta bango ntango inso mpo ’te mosala motambola malamu.
Ezra LinVB 6:9  Bopesa bango mpe binso bisengeli na bango mpo ’te babonzela Nzambe wa likolo mabonza ma kotumba : ngo­mbe babali, mpata babali na bana mpata, mbuma ya mampa, mongwa, vino na mafuta ; bapesa byango mokolo na mokolo, se lokola banganga Nzambe ba Yeruzalem bakosenge.
Ezra LinVB 6:10  Bongo bakoka kobonzela Nzambe wa likolo mabonza ma nsolo mpi­mbo mpe kosambela mpo ya bomoi bwa mokonzi mpe bwa bana ba ye.
Ezra LinVB 6:11  Natindi mpe boye : soko moto abuki mobeko mona, balongola likonzi lya ndako ya ye, batelemisa lyango mpe babaka ye wana ; batumba ndako ya ye, ekoma esika ya kobwaka bosoto.
Ezra LinVB 6:12  Nzambe oyo atii nkombo ya ye kuna, aboma mokonzi na bato banso babuki mobeko moye mpe bameki koboma Tempelo ya Nzambe o Yeruzalem. Ngai Dario natindi bo­ngo mpe nalingi ’te batosa etinda ya ngai. »
Ezra LinVB 6:13  Tatenai, moyangeli wa mokili o ngambo ya Efrate, na Setar-Bozenai, na baninga ba bango basali manso lokola mokonzi Dario atindi bango.
Ezra LinVB 6:14  Bakolo ba ba-Yuda basali makasi mpe mosala motamboli malamu. Bato bazalaki kotala misala : Profeta Ageo na Zakaria, mwana wa Ido. Basilisi kotonga yango lokola Nzambe wa Israel atindaki, mpe engebene na mibeko mya Siro, Dario na Artaksasta, mokonzi wa Persi.
Ezra LinVB 6:15  Basilisi kotonga Tempelo o mokolo mwa misato mwa sanza Adar, o mobu mwa motoba mwa bokonzi bwa Dario.
Ezra LinVB 6:16  Bana ba Israel, banganga Nza­mbe, ba-Levi na bato bautaki o boombo basepeli eyenga ya Bobenisi Tempelo na esengo.
Ezra LinVB 6:17  Mpo ya bobenisi Te­mpelo babonzi mpata babali zomi na ibale engebene na motango mwa mabota ma Israel.
Ezra LinVB 6:18  Bakaboli misala mya banganga Nzambe mpe mya ba-Levi, basala mosala mwa bango malamu o Tempelo ya Yeruzalem, se lokola eko­mami o buku ya Moze.
Ezra LinVB 6:19  Bato bautaki o boombo basepeli eyenga ya Pasika o mokolo mwa zomi na minei mwa sanza ya yambo.
Ezra LinVB 6:20  Awa banganga Nzambe na ba-Levi bamipetolaki, banso bakomi peto ; babonzi libonza lya Pasika mpo ya baye bakangemaki o boombo, mpo ya baninga ba bango banganga Nza­mbe mpe mpo ya bango moko.
Ezra LinVB 6:21  Bongo, ba-Israel banso bautaki o boombo, balei Pasika esika yoko na baye banso batikalaki o mokili mpe baboyaki makambo mbindo ma bikolo bisusu mpo ’te bakumisa Yawe Nzambe wa Israel.
Ezra LinVB 6:22  Basepeli eyenga ya Mampa mazangi nkisi mikolo nsa­mbo, mpo Yawe atondisaki bango na esengo mpe abongisaki motema mwa mokonzi mwa Asur, oyo asalisi ba­ngo o mosala mwa botongi Tempelo ya Yawe Nzambe wa Israel.