Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MICAH
1 2 3 4 5 6 7
Prev Up Next
Chapter 2
Mica LinVB 2:1  Mawa na bato baluki kosala mabe, baye bakani mikano mibe o mbeto ya bango ! Etani ntongo bakokisi maye bakanaki kosala, zambi bazali na bokasi !
Mica LinVB 2:2  Oyo aluli elanga ya moninga akoyiba yango, oyo alingi ndako ya ye, akobotolo yango. Akokanga nkolo wa ndako mpe akozwa ndako ya ye ; akokanga nkolo wa biloko mpe bakozwa biloko bya ye.
Mica LinVB 2:3  Yango wana Yawe Nzambe alobi : Nakopesa bato baye etumbu enene, nzela ya komibikisa ekozala te ; moto moko akotombola motó lisusu te, zambi ekozala mikolo mya mpasi enene.
Mica LinVB 2:4  Mokolo mona bato bakotiola yo na minkanda, bakotia makambo ma yo o nze­mbo ya boleli, bakoloba : « Babotoli biso biloko binso ; bakaboli lisango lya biso na bauta. Moto moko te akozongisa lyango ; bayibi bakabelani mabelé ma biso. »
Mica LinVB 2:5  Okozala na moto moko te akoki kopesa yo lisango o boko­nzi bwa Yawe.
Mica LinVB 2:6  Basusu balobi na ngai : « Botika kobimisa nsoi ! Bakosakolaka bongo te ! Nsoni ekokwela biso te !
Mica LinVB 2:7  Batombeli nde bato ba Yakob bobe ? Yawe akoki kokanga motema lisusu te ? Ye akosalaka nde bongo ? Azali se na maloba ma boboto te ona bato ba bosembo ? »
Mica LinVB 2:8  Bomilakisi lokola banguna ba bato ba ngai : moto azali na likambo te, bokobotoloko ye molato ; oyo asengeli kobanga eloko te, bokoyokisaka ye mpasi ya etumba.
Mica LinVB 2:9  Bokobenganaka basi ba ekolo ya ngai o ndako ya bango, ndako eye balingi mpe basepeli kofanda ; bokobotoloko bana ba bango mabelé napesaki bango :
Mica LinVB 2:10  « Boteleme, bokende, bopema lisusu te ! » Mpo ya mbindo ya bino bakobebisa mboka nye.
Mica LinVB 2:11  Soko profeta wa lokuta alobaki na bato : « Bopesa ngai vino namele, bongo nakosakola na bino maka­mbo malamu », mbele bandimaki ye noki lokola profeta wa bango.
Mica LinVB 2:12  Solo, nalingi kosangisa libota mobimba lya Yakob, nalingi kosangisa bato banso ba Israel baye batikali ! Nakosangisa bango banso o lopa­ngo lokola mpata, lokola etonga ya bibwele o esobe, bato bakotonda wana !
Mica LinVB 2:13  Elombe akokamba bango, bakoleka o ezibeli, bakobima o lopango, mokonzi wa bango akoleka liboso mpe Yawe akokamba bango.