NEHEMIAH
Chapter 1
Nehe | LinVB | 1:1 | Maloba ma Neemia, mwana wa Akalia : O sanza Kisleu, o mobu mwa ntuku ibale mwa bokonzi bwa Artaksasta, nazalaki o engumba enene ya Suza. | |
Nehe | LinVB | 1:2 | Kanani, moko wa bandeko ba ngai, na bato basusu ba-Yuda bayei epai ya ngai. Natuni bango nsango ya ba-Yuda, baye babikaki mpe bazo-ngaki o mboka, natuni mpe nsango ya Yeruzalem. | |
Nehe | LinVB | 1:3 | Bayanoli ngai : « Baye bautaki o boombo mpe bazongi o mokili mwa Yuda, bazali na mpasi enene mpe na nsoni ; mpamba te, lopango lonene la Yeruzalem lobebi mpe batumbaki bizibeli bya mboka. » | |
Nehe | LinVB | 1:4 | Eyoki ngai maloba mana, naleli, nafandi na mawa mwa mikolo, nalali nzala mpe nasambeli Nzambe wa likolo. | |
Nehe | LinVB | 1:5 | Nalobi : « E Yawe Nzambe wa likolo, yo Nzambe monene mpe wa nsomo ; okomemyaka bondeko mpe okopesaka bolamu na baye balingi yo mpe batosi mibeko mya yo. | |
Nehe | LinVB | 1:6 | Zibola matoi mpe fungola miso mpo ’te ondima losambo la ngai, mosaleli wa yo. Sikawa nabondeli yo butu moi mpo ya bana ba Israel, basaleli ba yo, mpe nasakoli masumu biso, bana ba Israel, tosalaki o miso ma yo ; ngai moko na bandeko ba ngai tosali masumu ! | |
Nehe | LinVB | 1:7 | Tosalaki yo mabe mingi, totosaki mibeko mpe mitindo mya yo te, miye opesaki Moze, mosaleli wa yo. | |
Nehe | LinVB | 1:8 | Okundola naino liloba olobaki na Moze, mosaleli wa yo : “Soko boboyi ngai, nakopanza bino o kati ya bikolo bisusu. | |
Nehe | LinVB | 1:9 | Kasi soko bozongeli ngai mpe bolandi mibeko mya ngai, bato ba bino bakendeki o boombo, ata bazali kuna mosika o nsuka ya mokili, ngai nakosangisa bango lisusu mpe nakozongisa bango o esika eye naponoki mpo ya kotia Nkombo ya ngai.” | |
Nehe | LinVB | 1:10 | Bango bazali basaleli ba yo, bato ba ekolo ya yo ; yo moto osikolaki bango na nguya enene mpe na bokasi bwa loboko la yo. | |
Nehe | LinVB | 1:11 | E mokonzi, tia matoi na losambo la ngai, mosaleli wa yo, mpe na mabondeli ma basaleli ba yo banso baye bakokumisaka Nkombo ya yo na esengo. Nabondeli yo, longisa ngai, mosaleli wa yo, mpe salisa ngai mpo ’te nazwa lilonga o miso ma moto oyo. » O ntango ena nazalaki na mosala mwa kobongela mokonzi vino. | |