ECCLESIASTES
Chapter 12
Eccl | LinVB | 12:1 | Kanisa mozalisi wa yo ntango ozali naino elenge, liboso ’te mikolo mya mpasi miya, mpe mibu miye ndolobi : « Nazali na esengo lisusu te », | |
Eccl | LinVB | 12:2 | liboso ’te moi na mwinda miinda, liboso ’te sanza na minzoto mizima, liboso ’te mampata manoisa mbula. | |
Eccl | LinVB | 12:3 | O ntango ena bakengeli ba ndako bakolenge mpe bilombe ba nzoto ekasi bakogumbama, mpe basi bakotuta biloko bakotika mosala, mpo bazali baike te, mpe baye batalaki o lininisa bakomono lisusu te ; | |
Eccl | LinVB | 12:4 | bizibeli bya ndako bikokangema, lokito la konika fufu ekosila, mingongo mya ndeke mikolamusaka mpe nzembo bikoyokana lisusu te. | |
Eccl | LinVB | 12:5 | O ntango ena bato bakobanga kobuta ngomba, mpe bakoyoka nsomo mpo ya makama ma nzela. O ntango ena nzete ya lidame ekobimisa fulele mpe lipalela likotonda na bilei mpe mbuma ya nzete ya makasú ikopaswana, kasi yo moko okokende kolanda ndako ya yo ya seko mpe basi ba lilaka basili kokoma o balabala. | |
Eccl | LinVB | 12:6 | Mokolo mona nsinga ya palata ekokatana, kopo ya wolo ekobukana, mbeki ya mai ekobolana penepene na liziba, yika ya kobenda mai ekobukana, | |
Eccl | LinVB | 12:9 | Kohelet azalaki moto wa bwanya, alakisi mpe bato ba ekolo ya ye mayele, ayekoli, abongisi mpe abimisi biyele mingi. | |
Eccl | LinVB | 12:11 | Maloba ma bato ba bwanya makolendisaka lokola mangenda, liboke lya mango lokola bapiki mango na nsete. Mokambi se moko ayebisi maloba mana manso. | |
Eccl | LinVB | 12:12 | Mwana wa ngai, keba ’te obakisa eloko te : kokoma minkanda mingi ezali na nsuka te, mpe koyekola mingi ekolembisa nzoto. | |
Eccl | LinVB | 12:13 | Awa oyoki maloba maye manso, nakosukisa boye : Banga Nzambe mpe tosa mibeko mya ye, zambi botosi bozali lotomo la bato banso. | |