Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ECCLESIASTES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 9
Eccl LinVB 9:1  Ya solo, nakanisi mana manso malamu mpe namoni boye : Basemba na bato ba bwanya, na misala mya bango minso, bazali o maboko ma Nzambe. Moto moko ayebi te soko bato bakolinga ye to soko bakoyina ye ; makambo mana maleki mayele ma ye.
Eccl LinVB 9:2  Makambo ma bato banso mazali se ndenge yoko. Bokeseni bozali te kati ya moto malamu na moto mabe, kati ya moto wa motema peto na moto wa mbindo, kati ya moto abonzi mabonza na oyo abonzi mabonza te, kati ya moto azali na motema bosembo na oyo azali mosumuki, kati ya moto alayi ndai na oyo abangi kolaya ndai.
Eccl LinVB 9:3  Ezali mabe ’te makambo manso makokwelaka bato banso mazali se ndenge yoko. Yango wana, mitema mya bato mitondi na mayele mabe, mpe bozoba bozali na bango bomoi bwa bango mobimba, na nsima bakosuka bobele o mboka ya bawa.
Eccl LinVB 9:4  Nzokande mikolo minso bato bazali naino na bomoi batikali na elikya : Mbwa ezali na bomoi eleki ntambwe eye ekufa.
Eccl LinVB 9:5  Bato bazali na bomoi bayebi ’te bakokufa, kasi bato bakufi bayebi eloko te. Bato bakufi bakozwa lifuta lisusu te, zambi nkombo ya bango ebungi libela.
Eccl LinVB 9:6  Bolingi na boyini na zuwa ya ba­ngo isili kokende mosika. Maka­mbo manso ma mokili matali ba­ngo lisusu te.
Eccl LinVB 9:7  Kende kolia mampa na motema nsai, mpe mele vino na motema esengo, mpo Nzambe andimi misala mya yo.
Eccl LinVB 9:8  Lata bilamba mpembe ntango inso, mpe pakola mafuta ma nsolo mpi­mbo o motó mwa yo.
Eccl LinVB 9:9  Sepela mpe fanda na mwasi oyo olingi mwa mikolo okozala awa o mokili ; awa Nzambe apesi yo mikolo miye mya mpamba, ezali likabo lya yo mpo ya mosala okosala o mokili.
Eccl LinVB 9:10  Sala misala minso okoki kosala, sala myango na makasi ma yo manso, zambi o mboka ya bawa esika okokende, misala, mayele, boyebi na bwanya bizali te.
Eccl LinVB 9:11  Awa o mokili namoni lisusu boye : Bato bayebi kopota mbangu, bakolonga o momekano te ; bato baleki makasi bakolonga o etumba te ; bato baleki bwanya bakolia mampa malamu te ; bato baleki mayele bakozwa nkita te ; bato bayebi makambo mingi bakozwa lokumu te, zambi makila malamu na mabe makokwela bango banso.
Eccl LinVB 9:12  Ntembe te, moto moko ayebi ngonga ya ye te. Se lokola mbisi ikokangema o monyama, mpe lokola ndeke ikokoto o motambo, bobele bongo bato bakokamwa na mikolo mya mpasi, bolozi bokokwela bango na mbalakaka.
Eccl LinVB 9:13  Namoni lisusu mpo yoko etali bwanya awa o mokili, mpe ezali likambo linene o miso ma ngai.
Eccl LinVB 9:14  Eza­laki mboka yoko eke ya bato mingi te. Mokonzi wa ekolo ayei ko­bunda na bato ba mboka ena, a­nyokoli bango mpe atongi bibo­mbamelo binene.
Eccl LinVB 9:15  Ezalaki wana mobola moko wa bwanya ; abikisi mboka na bwanya bwa ye. Kasi na nsima moto moko akanisi lisusu moto mobola te.
Eccl LinVB 9:16  Bongo nalobi : Bwanya boleki bokasi na motuya, kasi bato batali bwanya bwa mobola se mpamba mpe balingi koyoka maloba ma ye te.
Eccl LinVB 9:17  Bakondimaka maloba ma bwanya soko malobami na boboto, kasi bogangi bwa mokonzi o ntei ya bazoba, bakoyoka bwango te.
Eccl LinVB 9:18  Bwanya boleki bibuneli bya etumba na motuya, kasi mosumuki moko akoki kobebisa makambo mingi.