Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ECCLESIASTES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12
Prev Up Next
Chapter 8
Eccl LinVB 8:1  Nani azali moto wa bwanya, mpe nani akoki kolimbola makambo ? Bwanya bokongengisaka elongi ya moto, bokolongolaka mawa o elongi ya ye.
Eccl LinVB 8:2  Otosa mibeko mya mokonzi wa ekolo, zambi Nzambe alakeli ye bokonzi.
Eccl LinVB 8:3  Otika mokonzi noki te ; otungisa ye te na makambo ma kwokoso, zambi mokonzi akosalaka manso lokola alingi.
Eccl LinVB 8:4  Mpamba te, liloba lya mokonzi lizali mobeko. Kutu nani akotuna ye : Osali nini ?
Eccl LinVB 8:5  Moto akotosa mibeko, akozwa makambo te ; moto wa bwanya ayebi ’te makambo manso mazali na nsuka.
Eccl LinVB 8:6  Ya solo, ngonga ya kosa­mba makambo manso ezali ; kasi moto azali na likambo linene lya mpasi :
Eccl LinVB 8:7  ayebi te makambo nini makosalema, moto moko akoyebisa ye te makambo nini makokwela ye.
Eccl LinVB 8:8  Moto moko te azali mokonzi wa mpema ya ye, moto moko te akoki kozongisa mokolo mwa liwa nsima, moto moko te akoki kokima etumba, mpe mayele mabe makobikisa moto te.
Eccl LinVB 8:9  Namoni makambo mana manso mpe natii motema mpo nayeba manso makosalemaka o mokili, awa moto moko azali na nguya ya kokonza moto mosusu mpe ya koyokisa ye mpasi.
Eccl LinVB 8:10  Namoni mpe ndenge bakoku-ndaka bato babe, nzokande bakobenganaka bato balamu o esika esantu, mpe bakobosanaka bango o mboka. Yango mpe ezali mpamba.
Eccl LinVB 8:11  Awa etumbu ya basumuki ekoya noki te, bato mingi balingi se kosala mabe.
Eccl LinVB 8:12  Ata moto asali masumu mbala nkama, azali se nzoto makasi. Kasi nayebi mpe ’te : Ese­ngo eko­zala na bato balingi Nza­mbe, zambi bakobangaka ye.
Eccl LinVB 8:13  Nayebi ’te moto mabe akozala na ese­ngo te ; bomoi bwa ye bokoli­mwa lokola molinga, zambi ye akobangaka Nzambe te.
Eccl LinVB 8:14  Makambo ma kilikili makosalemaka o mokili. Ntango esusu base-mba bakozwa etumbu ekoki na bato babe, mpe bato babe bakozwa esengo ekoki na basemba. Nasili nalobi : Makambo mazali na ntina te.
Eccl LinVB 8:15  Yango wana nakumisi bisengo bya nse : malamu moto alia o mokili moye, amele mpe asepela ; se ya­ngo ezali na ye o mikolo minso mya bomoi Nzambe akopesa ye awa o nse.
Eccl LinVB 8:16  Natiaki motema mpo nayeba bwanya, natali ndenge bato bakosalaka mosala awa o mokili mpe boniboni butu moi bakopemaka te.
Eccl LinVB 8:17  Na nsima natali misala minso Nzambe asalaki, mpe namoni ’te moto akoki koyeba makambo ma­nso makoleka o mokili te. Ata amiyokisi mpasi mpo ya koluka mayele mana, akozwa te. Ata moto wa bwanya alobi ’te ayebi, akoki koyeba mango te.