HEBREWS
Chapter 4
| Hebr | LinVB | 4:1 | Awa elaká ya Nzámbe ya koyíngela o esíká ya yě ya bopémi ezalí naíno, tókéba ’te mǒkó wa bínó átíkala nsima. | |
| Hebr | LinVB | 4:2 | Ya sôló, sé lokóla bangó, bísó mpé toyókí nsango elámu. Kasi liloba bangó bayókákí lizwělákí bangó litómba té, mpámba té, ntángo bayókákí lyangó, bazángákí boyambi. | |
| Hebr | LinVB | 4:3 | Bísó bato tokoyambaka tokoyíngela o esíká ya bopémi eye Nzámbe alobákí : Na nkándá nalayákí ’te : Bakoyíngela o esíká ya ngáí ya bopémi té. Nzámbe asílísákí mosálá mwa yě út’o libandela lya mokili, zambí o esíká yǒ kó (ya Minkandá Misántu) | |
| Hebr | LinVB | 4:4 | alobákí mpô ya mokolo mwa nsambo : Nzámbe apémí mokolo mwa nsambo, áwa asílísí misálá mya yě mínso. | |
| Hebr | LinVB | 4:6 | Toyébí bôngó ’te basúsu bakoyíngela kúná, kasi baye bayókákí nsango elámu libosó bayíngélákí té, mpô babóyákí kotósa. | |
| Hebr | LinVB | 4:7 | Yangó wâná nsima ya mbúla míngi Nzámbe aponí lisúsu mokolo mǒkó, mokolo mwa leló, mpé alobí na maloba maye Davídi alobáká kala, lokóla nasílí nakomí : Sókó boyókí leló mongóngó mwa yě, bókómisa mitéma mya bínó bǒ mabángá té. | |
| Hebr | LinVB | 4:8 | Sókó Yózue ayíngísákí bangó sôló o esíká ya bopémi, mbele Nzámbe atángákí lisúsu likambo lya mokolo mosúsu nsima té. | |
| Hebr | LinVB | 4:10 | Moto ayíngélí o esíká ya bopémi, yě mpé akopéma áwa asílísí misálá mya yě, lokóla Nzámbe apémákí. | |
| Hebr | LinVB | 4:11 | Bôngó tósála makási mpô tóyíngela o esíká eye ya bopémi. Moto mǒkó té ákwâ na bomekoli ndakisa ya baye babóyákí kotósa. | |
| Hebr | LinVB | 4:12 | Liloba lya Nzámbe lizalí na bomoi mpé na ngúyá, likobéteke leká mompánga basebí bipái bíbalé ; likoyíngelaka kín’o ntá ntéi ya molímo mpé ya motéma, o minkúwa mpé o mafúta ma minkúwa. Liloba liye liyébí mpé mpósá mpé makanisi ma motéma. | |
| Hebr | LinVB | 4:13 | Moto mǒkó té abómbámí o míso ma Oyo akosámbisa bísó ; o míso ma yě bínso bizalí polélé. | |
| Hebr | LinVB | 4:14 | Awa tozalí na nganga Nzámbe mokonzi óyo ayíngélí o likoló, Yézu, Mwána wa Nzámbe, tosengélí kosakola eyamba ya bísó na mpíkó. | |
| Hebr | LinVB | 4:15 | Tozalí na nganga Nzámbe mokonzi, moto ayébí botaú bwa bísó mpé akoyókelaka bísó ngolu. Bamekákí yě motéma na makambo ndéngé na ndéngé, sé lokóla bísó, kasi asálákí lisúmu té. | |