Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II CORINTHIANS
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13
Prev Up Next
Chapter 13
II C LinVB 13:1  Tálá mbala ya ísáto nakoyâ o mbóka bínó. Bakokí kokáta likambo sé o míso ma banzénénéke bábalé tǒ básáto.
II C LinVB 13:2  Nasílí kokébisa baye basálákí masúmu ná mpé bato basúsu bánso ntángo nayákí kotála bínó mbala ya íbalé. Leló nakébísí bangó lisúsu, áwa nakómí naíno epái ya bínó té : Mokolo nakoyâ, nakoyókela moto mǒkó mawa té.
II C LinVB 13:3  Bolingí nálakisa bínó ’te Krístu akolobaka na monoko mwa ngáí ? Krístu óyo azalí motaú té, kasi akolakisaka ngúyá ya yě o káti ya bínó.
II C LinVB 13:4  Atâ babákákí yě o kurúse lokóla moto motaú, azalí na bomoi mpô ya ngúyá ya Nzámbe. Atâ tozalí bato bataú lokóla yě azalákí libosó, bokomóno ’te tokozala na bomoi elongó na yě, mpô ya ngúyá ya Nzámbe.
II C LinVB 13:5  Bómítúna mpé bótála bínó mǒ­kó sókó bozalí na boyambi. Sókó bomóní té ’te Yézu Krístu azalí o mitéma mya bínó, mbele bomíkitísí.
II C LinVB 13:6  Nakolíkya ’te bokondima ’te bísó tokití té, áwa bamekí bísó.
II C LinVB 13:7  Tozalí kobóndela Nzámbe ’te bósála mabé mǒkó té. Tolingí kozwa lilónga té, tolingí bobélé ’te bósála malámu mpé bóleka bísó.
II C LinVB 13:8  Zambí bísó tokokí kopekisa mambí ma bosôló té, tokokí sé koléndisa mangó.
II C LinVB 13:9  Sôló, tozalí kosepela sókó bísó tozalí bataú mpé bínó bozalí maká­si. O losámbo la bísó tozalí kosénge ’te bólénda o boyambi.
II C LinVB 13:10  Yangó wâná nakomélí bínó maye má­nso, áwa nazalí mosíká na bínó. Bôngó mokolo nakoyâ epái ya bínó, nakosengela kopésa mibéko na makási té, zambí Mokonzi apésí ngáí ngúyá ya koléndisa, kasi ya koboma té.
II C LinVB 13:11  Bandeko, bózala na esengo ; bómíbongisa, bóléndisana. Bózala mo­téma mǒkó mpé bófánda na bobóto, bôngó Nzámbe wa bolingi mpé wa bobóto akozala na bínó.
II C LinVB 13:12  Bópésana losáko na ekópi esántu. Bandeko bánso áwa batíndélí bínó mbóte.
II C LinVB 13:13  Ngrásya ya Mokonzi wa bísó Yézu Krístu, bolingi bwa Nzámbe mpé bondeko bwa Elímo Sántu bózala na bínó bánso !