ZEPHANIAH
Chapter 2
Zeph | LinVB | 2:2 | mpo ’te bapupola bino te lokola bakopupolaka matiti, nkanda enene ya Yawe ekwela bino te, awa mokolo mwa nkanda ya Yawe mokoki naino te. | |
Zeph | LinVB | 2:3 | Babola banso ba nse baluka Yawe, bino baye bokotosaka mibeko mya ye. Bozala na motema bosembo mpe na bosawa, mbele bokobika o mokolo mwa nkanda ya ye. | |
Zeph | LinVB | 2:4 | Solo, Gaza ekokoma esika ya mpamba, Askalon ekokoma mopotu, bakobengana bato ba Asdod na moi mpenza, mpe bakopikola Ekron. | |
Zeph | LinVB | 2:5 | Mawa na bino bato penepene na mbu, bino bandeko ba ekolo ya Kereti, Yawe alobi mpo ya bino : « Yo Kanana, mokili mwa ba-Filisti, nakoboma yo na bato ba yo banso. » | |
Zeph | LinVB | 2:7 | Mokili moye mokozala mwa bato ba Yuda baye batikali, bakoleisa mpata ya bango o mabelé mana ; na mpokwa bakopema o ndako ya Askalon, mpo Yawe Nzambe wa bango akoya kosalisa bango, akoya kobongisa makambo ma bango. | |
Zeph | LinVB | 2:8 | Nayoki mafinga ma bato ba Moab mpe ba Amon ntango bazalaki kofinga bato ba ngai mpe kofunda na mabelé ma bango. | |
Zeph | LinVB | 2:9 | Yawe wa bokasi bonso Nzambe wa Israel alobi : « Ya solo, nalayi o nkombo ya ngai : Moab ekokoma lokola Sodoma, mpe Amon lokola Gomora ; mabelé ma bango makotonda na nzube, makokoma libulu lya mongwa, mopotu seko. Bato ba ngai baye bakotikala o mokili bakobotolo bango biloko, mwana mboka oyo akotikala akozwa mabelé ma bango. » | |
Zeph | LinVB | 2:10 | Tala etumbu bato ba bikolo bakozwa mpo ya lolendo, mpo bafingaki mpe bafundaki o miso ma bato ba ekolo ya Yawe wa bokasi. | |
Zeph | LinVB | 2:11 | Yawe akoyokisa bango nsomo, akokweisa bikeko binso bya banzambe ba bango. Bato ba bisanga binso bakokumbamela ye, moko moko o mokili mwa ye. | |
Zeph | LinVB | 2:13 | Akotumbola bato ba ekolo ya Nordi, akoboma Asur mobimba, akokomisa engumba Ninive mopotu, ekokoma zelo lokola eliki. | |
Zeph | LinVB | 2:14 | Ngombe ikoya kolala wana, na nyama isusu ndenge na ndenge : esulungutu na yanganga ikolala wana na butu, penepene na maninisa nzembo ya ndeke ekoyokana, mpo nzete inso ikatani. | |