AMOS
Chapter 8
Amos | LinVB | 8:2 | Yawe atuni ngai : « Amos, omoni nini ? » Nazongisi : « Namoni ekoló etondi na mbuma iteli. » Yawe alobi na ngai : « Nsuka ya ekolo ya ngai Israel ekomi penepene, banda lelo nakolimbisa bango lisusu te. | |
Amos | LinVB | 8:3 | Mokolo mona o ndako inene nzembo ya boleli ekoyembama, bibembe bikozala mingi, bikobwakema bipai binso : manso makokoma nye ! » Maloba ma Mokonzi Yawe. | |
Amos | LinVB | 8:5 | Bokolobaka : « Eyenga ya Sanza ya sika ekozala mokolo nini mpo tokoka koteke mbuma ya mampa ? Mokolo mwa Sabato mokosila ntango nini mpo tokoka koteke masangu ma biso ? Tokokutola biloko mpe tokobutisa motuya, tokokamata bimekeli bya lokuta. | |
Amos | LinVB | 8:6 | Tokosomba bato batau na mosolo mpe mobola na motuya mwa sapato ; tokoteke ata mintika mya mbuma ya mampa. » | |
Amos | LinVB | 8:7 | Yawe alayi na nkombo ya ye, lokumu la Yakob : « Nakobosana mabe manso ma bango mokolo moko te. » | |
Amos | LinVB | 8:8 | Mpo ya mabe mana mokili mokoningana te ? Bato banso ba mokili bakozala na lilaka te ? Bisika binso mai makotonda lokola o ebale Nil, makotonda mpe makokita lokola ebale ya Ezipeti. | |
Amos | LinVB | 8:9 | Mokonzi Yawe alobi : Mokolo mona nakosala ’te mwese molimwa na midi, mpe nakokomisa moi molili o nse mobimba. | |
Amos | LinVB | 8:10 | Nakokomisa biyenga bya bino mikolo mya mawa. Nzembo ya bino ikokoma nzembo ya lilaka. Nakolatisa bino banso ngoto o loketo, mpe nakokokola mitó mya bino. Bokolata mpili lokola moto akufeli mwana se moko wa ye. Nsuka ya ye ekozala mokolo mwa mawa manene solo. | |
Amos | LinVB | 8:11 | Yawe alobi boye : Mokolo moko nakotinda nzala enene o ekolo eye ; nzala ya biloko te, mposa ya mai mpe te, kasi mposa ya koyoka liloba lya Yawe. | |
Amos | LinVB | 8:12 | Bakotelengana ut’o mbu yoko kin’o mbu esusu, bakoyengayenga ut’o Nordi kin’o Esti mpo ’te baluka liloba lya Yawe, kasi bakoyoka lyango te. | |
Amos | LinVB | 8:13 | Mokolo mona bonzenga bwa bilenge basi bokosila, bilenge babali bakosenzwa na mposa ya mai. | |