Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
DEUTERONOMY
Prev Up Next
Chapter 34
Deut LinVB 34:1  Moze alongwi o Bisobe bya Moab, abuti ngomba Nebo, eye ezali nsonge ya ngomba Pisga, etalani na mboka Yeriko. Yawe amonisi ye mokili mobimba ut’o Galaad tee Dan,
Deut LinVB 34:2  Neftali mobimba, mokili mwa Efraim na Manase, mokili mwa Yuda tee mbu ya Westi,
Deut LinVB 34:3  Negeb mpe mokili penepene na Yeriko, mboka ya mbila, tee Soar.
Deut LinVB 34:4  Yawe alobi na Moze : « Tala sikawa mokili nalakelaki Abarama, Izaka na Yakob ; nalobaki na bango ’te nakopesa bana ba bino mokili moye. Nalakisi yo mwa­ngo mpo ’te omono na miso, kasi okoyi­ngela kuna te. »
Deut LinVB 34:5  Moze mosaleli wa Yawe awei o esika ena, o mokili mwa Moab, lokola Yawe alingaki.
Deut LinVB 34:6  Bakundi ye o lo­bwaku, pene na Bet-Peor, o Moab. Tee lelo moto moko ayebi lilita lya ye te.
Deut LinVB 34:7  Ntango Moze awei, akokisi mibu monkama na ntuku ibale ; miso ma ye makufaki naino te mpe azalaki naino makasi.
Deut LinVB 34:8  Bana ba Israel baleli Moze o Bisobe bya Moab mikolo ntuku isato. Esilisi bango mikolo mya boleli Moze, basukisi lilaka.
Deut LinVB 34:9  Yozue, mwana wa Nun, azalaki na bwanya bonene, zambi Moze atandelaki ye maboko. Bana ba Israel batosi ye, basali bongo se lokola Nzambe atindaki Moze.
Deut LinVB 34:10  Profeta moko lokola Moze abimaki lisusu o Israel te ; ye amonoki elongi ya Yawe.
Deut LinVB 34:11  Yawe atindaki ye alakisa bilembo mpe asala makamwisi ebele o mokili mwa Ezipeti, esika apesaki etumbu na Farao mpe na basali ba ye o mokili mwa ye mobimba !
Deut LinVB 34:12  Na nguya enene Moze asalaki makambo ma nsomo o miso ma bato banso ba Israel !