DEUTERONOMY
Chapter 16
Deut | LinVB | 16:1 | Obosana sanza ya Abib te, osepela eyenga ya Pasika mpo ya kokumisa Yawe Nzambe wa yo, zambi o sanza ya Abib Yawe Nzambe wa yo abimisaki yo o Ezipeti na butu. | |
Deut | LinVB | 16:2 | Bonzela Yawe Nzambe wa yo Pasika na nyama inene na ike o esika eye Yawe Nzambe wa yo aponi mpo ’te nkombo ya ye ezala wana. | |
Deut | LinVB | 16:3 | Elongo na nyama ya moboma, olia te mampa maye balambaki na nkisi ya mampa, kasi mikolo nsambo olia se mampa mazangi nkisi, mampa ma mpasi, zambi okimaki o Ezipeti mbangu mpenza. Bongo mikolo minso mya bomoi bwa yo okundolaka mokolo mona obimaki o mokili mwa Ezipeti. | |
Deut | LinVB | 16:4 | Mikolo nsambo mobimba, bamono o ndako ya yo nkisi ya mampa te, o mokili mwa yo mobimba bobele bongo ; mpe ya mosuni olambi mpe osantisi o butu bwa mokolo mwa yambo, okoki kobomba eloko te tee mokolo mwa nsima. | |
Deut | LinVB | 16:6 | kasi bobele o esika Yawe Nzambe wa yo aponoki mpo ’te nkombo ya ye ezala wana, okoki koboma moboma mwa Pasika, se na mpokwa o ntango moi mokomi kokita, o ngonga mpenza obimaki o Ezipeti. | |
Deut | LinVB | 16:7 | Lamba nyama ya moboma mpe lia yango o esika Yawe Nzambe wa yo aponoki. Bobele na nsima, na ntongo okoki kozonga o mboka mpe kokende o biema bya yo. | |
Deut | LinVB | 16:8 | Mikolo motoba olia mampa mazangi nkisi ; mokolo mwa nsambo basepela eyenga ya Yawe Nzambe wa yo mpe osala mosala moko te. | |
Deut | LinVB | 16:9 | Tanga poso nsambo ; obanda kotanga poso nsambo ina ut’o mokolo babandi kokata mitó mya masangu. | |
Deut | LinVB | 16:10 | Na nsima sepela mpe kumisa Yawe Nzambe wa yo o eyenga ya Poso, mpe bonzela ye mabonza o nkombo ya yo moko lokola Yawe abenisi yo. | |
Deut | LinVB | 16:11 | O miso ma Yawe Nzambe wa yo, osepela o esika eye Yawe Nzambe wa yo aponoki mpo ’te nkombo ya ye ezala wana, elongo na mwana wa yo wa mobali to wa mwasi, na mo-Levi oyo afandi epai ya yo, na mompaya na mwana etike na mwasi bozenge bafandi o mboka yo. | |
Deut | LinVB | 16:12 | Okundolaka ’te yo mpe ozalaki moombo o mokili mwa Ezipeti. Tosa mpe kokisa mibeko mina. | |
Deut | LinVB | 16:13 | Sepela eyenga ya Biema mikolo nsambo, ntango okokongolo mbuma ya etutelo to ekamelo ya yo. | |
Deut | LinVB | 16:14 | Sepela eyenga ena, na yo na mwana wa yo wa mobali to wa mwasi, na mo-Levi, na mompaya, na mwana etike na mwasi bozenge bafandi o mboka yo. | |
Deut | LinVB | 16:15 | Mikolo nsambo okosepela eyenga ya Yawe Nzambe wa yo o esika eye Yawe aponoki mpo ’te nkombo ya ye ezala wana, zambi Yawe Nzambe wa yo akobenisa bilanga na misala mya yo mpo ’te otonda na esengo. | |
Deut | LinVB | 16:16 | Mbala isato o mobu babali banso ba ekolo ya yo bakende kokumisa Yawe Nzambe wa yo o esika ye moko aponoki : o eyenga ya Pasika, o eyenga ya Poso mpe o eyenga ya Biema. Moto moko akoma o miso ma Yawe maboko mpamba te, | |
Deut | LinVB | 16:18 | Opono bazuzi na bateyi ba Mobeko o mboka inso Yawe Nzambe wa yo apesi yo ; tia bango o mabota manso ; basambisa bato na bosembo. | |
Deut | LinVB | 16:19 | Omikotisa o makambo ma lokuta te, otala bilongi bya bato te mpe oyamba libonza te mpo ya kokitisa moninga, zambi mabonza makoboma miso ma bato ba bwanya mpe makobebisa makambo ma bato ba bosembo. | |
Deut | LinVB | 16:20 | Oluka se kosala manso na bosembo mpenza mpo ’te okoka kobika mpe kozwa mokili moye Yawe Nzambe wa yo apesi yo. | |
Deut | LinVB | 16:21 | Olona nzete ya nkisi te, ata ya nini, mpembeni ya altare loye otongelaki Yawe Nzambe wa yo. | |