Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
DEUTERONOMY
Prev Up Next
Chapter 22
Deut LinVB 22:1  Soko omoni ngombe to mpata ya ndeko wa yo ebu­ngi nzela, okoki kokima te ; kasi zo­ngisela ndeko wa yo yango.
Deut LinVB 22:2  Soko ndeko wa yo afandi o mboka ya penepene te, to soko oyebi ye te, kende na yango o lopango la yo mpe bo­mba yango kuna tee mokolo ndeko wa yo akoya koluka yango. Mokolo mona ozongisela ye yango.
Deut LinVB 22:3  Sala mpe bongo na mpunda, na monkoto, na eloko ata nini ndeko wa yo abungisi mpe yo ozwi yango ; oko­ki kokima yango te.
Deut LinVB 22:4  Soko omoni mpunda to ngombe ya ndeko wa yo ekwei o nzela, okoki kokima yango te, kasi osalisa ndeko wa yo na botelemisi nyama lisusu.
Deut LinVB 22:5  Mwasi akoki kolata molato mwa mobali te ; mobali mpe akoki kolata elamba ya mwasi te ; moto asali bo­ngo, asali likambo lya nsomo o miso ma Yawe Nzambe wa yo.
Deut LinVB 22:6  Soko o nzela ozali kokende, okuti o nzete to o mabelé zumbu lya nde­ke ezali na bana to na maki, mpe omoni mama ndeke alaleli bana to maki, okoki kokamata mama ndeke te.
Deut LinVB 22:7  Tika mama akende ; okamata se bana. Soko osali bongo okozwa bolamu mpe okoumela mikolo mingi na bomoi.
Deut LinVB 22:8  Soko otongi ndako ya sika, ndako ya mikili mibale, tia mwa lopango o mbalasani ya likolo mpo ’te soko mo­to abuti wana, akweya o nse te ; bo­ngo yo ozala na likambo lya koboma moninga te.
Deut LinVB 22:9  Soko oloni nzete ya vino o elanga ya yo, olona wana mbuma esusu te, mpo ’te inso ikoma ekila te, na mbuma iye olonaki na mbuma ya elanga ya vino.
Deut LinVB 22:10  Mpo ya kotimola mabelé ma elanga ya yo, otia ngombe na mpu­nda esika yoko te.
Deut LinVB 22:11  Olata mpe te elamba, eye esalemi ndambo na ntokia, ndambo na nsuki ya mpata.
Deut LinVB 22:12  Tonga mpe malenda na nsinga o nsuka inei ya elamba eye olati.
Deut LinVB 22:13  Soko mobali abali mwasi, afandi na ye mpe na nsima aboyi ye,
Deut LinVB 22:14  soko afundi ye na lokuta mpe abebisi lokumu la ye o miso ma bato banso, mpe alobi : « Mwasi oyo nabalaki, ntango nabelemeki na ye, namonoki ’te azalaki lisusu ngondo te »,
Deut LinVB 22:15  tata na mama wa elenge mwasi oyo bakamata elembo ya bongondo bwa ye mpe bakende kolakisa bakolo ba mboka epai ya ezibeli ya mboka.
Deut LinVB 22:16  Tata wa elenge mwasi aloba na bakolo ba mboka : « Mobali oyo nabalisi mwana wa ngai, aboyi ye na nsima ;
Deut LinVB 22:17  sikawa afundi ye mpe alobi : Nakutaki mwasi oyo azalaki lisusu ngondo te. Nzokande botala elembo ya bongondo bwa mwana wa ngai. » Mpe bakota-nda elamba o miso ma bakolo ba­mbo­ka.
Deut LinVB 22:18  Bakolo ba mboka bakanga mobali oyo, bapesa ye etumbu,
Deut LinVB 22:19  bafutisa ye mitako mya palata monkama mpe bapesa mosolo mona na tata wa mwana, zambi mobali abebisi lokumu la ngondo wa Israel o miso ma bato banso. Asengeli kokamata mwa­si wa ye mpe akoki koboya ye mokolo moko te.
Deut LinVB 22:20  Kasi soko emononi ’te likambo abimisi lizali lya solo mpe bilembo bya bongondo bizwami epai ya ele­nge mwasi te,
Deut LinVB 22:21  babimisa ye o liba­nda, o ezibeli ya ndako ya tata wa ye ; bato banso ba mboka babwakela ye mabanga tee akokufa, zambi asali likambo lya nsomo o Israel, abebisi lokumu la libota lya tata wa ye. Bobele bongo okosilisa bobe o ekolo ya yo.
Deut LinVB 22:22  Soko bakangi mobali atamboli na mwasi wa libala, bango babale bakufa : ná mobali alalaki na mwasi, ná mwasi lokola. Bobele bongo okosilisa bobe o Israel.
Deut LinVB 22:23  Soko elenge mwasi abandemaki na mobali moko, kasi mobali mosusu akutani na ye mpe alali na ye,
Deut LinVB 22:24  baka­mba bango babale pene na ezibeli ya mboka mpe babwakela bango mabanga tee bakokufa : baboma elenge mwasi zambi agangaki te mpo ya kobenga bato baya kobikisa ye, baboma mpe mobali zambi abebisi mwasi wa moninga. Bobele bongo okosilisa bobe o ekolo ya yo.
Deut LinVB 22:25  Kasi soko mobali akutani na mwasi o esobe, mwasi oyo asili kobandema na mobali moko, soko mobali akangaki ye na makasi mpe alalaki na ye, se mobali oyo alalaki na ye akufa.
Deut LinVB 22:26  Osala ele­nge mwasi mabe te, zambi asalaki mabe te, maye makoki na liwa. Ezali lokola moto akangi moninga mpo ’te aboma ye,
Deut LinVB 22:27  zambi akutaki ye o esobe, elenge mwasi agangaki kasi moto moko azalaki te mpo ’te abikisa ye.
Deut LinVB 22:28  Soko mobali moko akuti ngondo oyo abandemi na mobali naino te, akangi ye na makasi mpe alali na ye, mpe bato bamoni yango,
Deut LinVB 22:29  mobali oyo alalaki na ye afuta tata wa elenge mwasi mitako mya palata ntuku itano ; asengeli kobala ye zambi abebisaki mwasi, akoki kolongola ye lisusu mokolo moko te.