Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I TIMOTHY
1 2 3 4 5 6
Prev Up Next
Chapter 2
I Ti LinVB 2:1  Libosó mpenzá natíndí ’te bósámbela Nzámbe, bóbóndela mpé bósénge yě, bótóndo yě mpô ya bato bánso :
I Ti LinVB 2:2  mpô ya bakonzi na bankúmú bánso, mpô tókoka kofánda nyê mpé na bobóto, mpé tókúmisa Nzámbe na ezalela ebongí nyé.
I Ti LinVB 2:3  Yangó ezalí malámu mpé ekosepelisa Nzámbe Mobíkisi wa bísó.
I Ti LinVB 2:4  Alingí ’te bato bánso bábíka mpé báyéba matéya ma sôló.
I Ti LinVB 2:5  Nzámbe azalí sé mǒkó, mpé mobémbísi káti ya Nzámbe na bato azalí sé mǒkó, yě ndé Krístu Yézu óyo azalí moto lokóla bísó.
I Ti LinVB 2:6  Yě amíkabí mpô ya kosikola bato bánso : akokísí yangó o eleko Nzámbe akánákí.
I Ti LinVB 2:7  Ngáí naponómí názala mosakoli mpé apóstolo mpô ’te nátéya bato ba bikólo bisúsu mambí ma eyamba mpé bosôló ; nalobí mambí ma sôló, nakósí té.
I Ti LinVB 2:8  Bôngó nalingí ’te bipái bínso, babáli bakotó­mbola mabóko mpô ya kosámbela, bázala motéma péto, na nkándá té, na boswâni mpé té.
I Ti LinVB 2:9  Básí mpé bámíbongisa bǒ ebongí, kasi báláta na lipombó té, bámílakisa té na nsúki bakangísí na wólo tǒ na mabángá ma motúya, bátíka mpé moláto mwa monzele.
I Ti LinVB 2:10  Kasi básála misálá milámu : tálá bikémbiseli bibongí na básí bakokúmisaka Nzámbe.
I Ti LinVB 2:11  Mwásí áfánda nyê mpé na botósi mpô ya koyóka matéya.
I Ti LinVB 2:12  Nalingísí yě té ’te ápésa matéya tǒ ámílakisa mokonzi wa mobáli, kasi asengélí kofánda nyê.
I Ti LinVB 2:13  Zambí Nzámbe akelákí libosó Adámu, Eva bobélé na nsima.
I Ti LinVB 2:14  Adámu andimákí lisénginyá té, mwásí moto andimákí lisénginyá, yangó wâná atósákí mobéko té.
I Ti LinVB 2:15  Nzókandé akobíka sókó akómí mamá wa bána, sókó atíkálí na boyambi, na bolingi mpé na bosántu.