Chapter 1
III | LinVB | 1:2 | Wa bolingo, nakolíkya ’te makambo ma yŏ mánso mazalí kotámbola malámu ; nzóto ya yŏ ézala kolóngónú lokóla molímo mwa yŏ. | |
III | LinVB | 1:3 | Nasepélí míngi áwa bandeko bayéí koyébisa ngáí ’te ozalí na boyambi bwa sôló mpé ozalí kolanda nzelá ya bosôló. | |
III | LinVB | 1:4 | Koyóka ’te bána ba ngáí bakolandaka nzelá ya bosôló ezalí koyókisa ngáí esengo enéne mpenzá. | |
III | LinVB | 1:5 | Wa bolingo, ozalí sôló moto wa boyambi na mánso okosálaka mpô ya bandeko, atâ bazalí bampaya. | |
III | LinVB | 1:6 | Bangó mŏ kó bayébísí bato ba Eklézya áwa ndéngé okolingaka bato. Bŏ ebongí na moto wa Nzámbe, ópésa bangó bínso bisengélí na bangó o mobémbo. | |
III | LinVB | 1:7 | Bakeí mobémbo mpô ya kosakola Nkómbó ya Mokonzi ; epái ya bapagáno bakozwaka elóko té. | |
III | LinVB | 1:9 | Nakomélákí Eklézya mwâ monkandá, kasi Diotréfes, moto óyo azalí kowéla esíká ya lokúmu, abóyí koyóka bísó. | |
III | LinVB | 1:10 | Yangó wâná, ntángo nakoyâ nakopálela yě átíka makambo ma yě ; azalí bobélé kotóngo bísó té, abóyí mpé koyamba bandeko. Sókó basúsu balingí koyamba bangó, apekísí bangó, mpé abengání bangó o Eklézya. | |
III | LinVB | 1:11 | Wa bolingo, ósála lokóla bato babé té, kasi sálá lokóla bato balámu. Moto akosálaka malámu azalí moto wa Nzámbe ; óyo akosálaka mabé amóní naíno Nzámbe té. | |
III | LinVB | 1:12 | Bánso, ná Nzámbe wa bosôló bakokúmisaka Demétrio. Bísó mpé tokúmísí yě, mpé oyébí malámu ’te tozalí koloba sé makambo ma sôló. | |
III | LinVB | 1:13 | Nazalí naíno na makambo míngi ma koyébísa yŏ, kasi nakokoma mangó na ekomeli mpé na mái ma bokomi té. | |