MICAH
Chapter 1
Mica | LinVB | 1:1 | Yoka maloba Yawe alobaki na Mikea wa Moreset, o eleko Yotam, Akaz na Ezekia bazalaki bakonzi ba Yuda. Amonoki mamoni mayebisi ye makambo matali Samaria na Yeruzalem. | |
Mica | LinVB | 1:2 | Bino bato ba mokili mobimba, boyoka ! Botia matoi, mokili na biloko binso bizali wana ! Yawe akosakola makambo ma bokaneli bino, Yawe oyo azali o ndako ya ye esantu ! | |
Mica | LinVB | 1:4 | Esika ye anyati, ngomba inyangwi, mabwaku mapaswani, manyangwi lokola mafuta o móto, lokola mai masopani o mopanzi mwa ngomba. | |
Mica | LinVB | 1:5 | Mana manso masalemi mpo ya mabe ma Yakob, mpo ya lisumu lya bato ba libota lya Israel. Mosumuki wa Yakob nani ? Bobele Samaria te ? Mosumuki wa Yuda nani ? Bobele Yeruzalem te ? | |
Mica | LinVB | 1:6 | « Nakokomisa Samaria mobimba mopotu, ekotikala se mabelé mabongi na boloni nzete ya vino. Nakobwaka biliki bya ndako o libulu linene, nakokundola ata mabanga ma nse mabima libanda. | |
Mica | LinVB | 1:7 | Nakobuka bikeko binso bya banzambe bizali na ye, nakobwaka misolo mya bondumba bwa ye o móto ; nakobuka bikeko bya banzambe biteni biteni, bikeko bina bisalemi na mosolo mozwamaki na bondumba, bakobongola byango lisusu mosolo mwa kofuta bandumba. » | |
Mica | LinVB | 1:8 | Na ntina ena nakobanda kokimela mpe kolela, kotambola makolo mpamba, elamba o nzoto te. Nakobanda komilela lokola minsole mikokimelaka, boleli bwa mawa lokola boleli bwa maligbanga. | |
Mica | LinVB | 1:9 | Mpota ya Samaria ikobela te, isili ikomi kin’o Yuda, kin’o lopango la bato ba ngai, kin’o Yeruzalem ! | |
Mica | LinVB | 1:11 | Bolelisa liseke, bino bato bofandi o Safir ! Bato ba Sanan babimi o mboka te ! Bet-Esel ebebi nye kin’o mabanga ma nse ! | |
Mica | LinVB | 1:12 | Bato bafandi o Marot bakomi kobele na bokanisi nkita ya bango, zambi Yawe akitisi malozi manene kin’o ezibeli ya Yeruzalem. | |
Mica | LinVB | 1:13 | Bobongisa farasa na makalo, bino bato bofandi o Lakis, bolakisi bato ba Sion nzela ya masumu, mpe bokomisi ba-Israel motó makasi. | |