Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
NAHUM
1 2 3
Prev Up Next
Chapter 2
Nahu LinVB 2:1  Ntoma ayei mbangu o nzela ya ngomba koyebisa bato ’te mokili mokozwa boboto. E Yuda, sepela biyenga bya yo bya kala, kokisa bilako bya yo. Mobebisi monene akoleka o mokili mwa yo lisusu te, zambi asili asuki mpenza.
Nahu LinVB 2:2  (Ninive), Mobebisi abelemi na yo, kende kokengele o ebombamelo, tala nzela inso malamu, sala makasi mpe pika mpende.
Nahu LinVB 2:3  Solo, Yawe akobongisa lokumu la Yakob, akozongisa nkembo ya Israel. Bayibi babotoloki bango biloko binso, babebisaki nzete inso o bilanga.
Nahu LinVB 2:4  Nguba ya bilombe ba ye ipakolami na ngola, basoda ba ye balati bilamba bitane. Bibende bya makalo bikongengeke lokola móto, ntango bamilengeli na etumba makongo maningani.
Nahu LinVB 2:5  O balabala batambwisi makalo mbangu mpenza, maleki o bisobe lokola bisungi bya móto, lokola minkalali bakimi epai na epai.
Nahu LinVB 2:6  Mokonzi abengi bakomanda ba ye, bakomi kotatabana ; bakimi penepene na efelo enene ya lopango, baluki esika ya kobombama.
Nahu LinVB 2:7  Bafungoli bizibeli bya lopango bitalani na ebale, mpe ndako enene ya mokonzi eni­ngani.
Nahu LinVB 2:8  Bakei na ekeko ya nzambe mwasi wa bango, basi basaleli bazali kokimela lokola bibenga ; baleli, maboko o mitó ;
Nahu LinVB 2:9  Ninive azali lokola sani enene ya mai, mai mana mazali kobima. Bagangi : « Boteleme ! Boteleme ! », kasi moto moko atali nsima te.
Nahu LinVB 2:10  « Boyiba palata, boyiba wolo ! » Biloko bya motuya bilekeli bango mingi, biloko bya nkita ebele.
Nahu LinVB 2:11  Bayibi, babotoli mpe babebisi biloko ! Mitema mya bango milembi, makasi masileli bango ; bakomi kolenge nzoto mobimba, bilongi bya bango banso biteli.
Nahu LinVB 2:12  Mobenga mwa nkosi ezali wapi sikawa ? Wapi esika bana ba ye bazalaki kozwa bilei ? Ntango nkosi mobali ebimaki, nkosi mwasi etikalaki, moto moko te atungisaki bana ba nkosi.
Nahu LinVB 2:13  Nkosi ezalaki kokatakata nyama mpo ya koleisa bana, mpe koboma mpo ya kopesa basi ba yango, atondisi mobenga na nyama iye ebo­maki, mpe esika ya kolala na misuni.
Nahu LinVB 2:14  Yawe wa bokasi bonso alobi : Ngai oyo nabimeli yo ! Nakotumba makalo ma yo, nakoboma bana ba nkosi ba yo na mopanga, nakosilisa makambo ma yo ma boyibi o mikili. Moto moko akoyoka mingongo mya bantoma ba yo lisusu te.