NAHUM
Chapter 1
Nahu | LinVB | 1:2 | Yawe azali Nzambe wa zuwa linene, ye mobekoli monene ! Yawe akobekolaka banguna ba ye, nkanda ya ye ezali enene, akobombelaka banguna ba ye nkanda. | |
Nahu | LinVB | 1:3 | Solo, Yawe akosilikaka noki te, kasi azali makasi mpo ya nguya ya ye. Akotikaka mabe moko mpamba te. Akoyaka na mompepe mwa ekumbaki mpe na mbula makasi, mampata mazali mputulu ye akobutisaka na makolo ma ye. | |
Nahu | LinVB | 1:4 | Akokanela mai ma mbu, mpe mai makokauka, akokaukisa mai o miluka minso. Mikili mya Basan mpe mya Karmel mikobeba, matiti mabesu ma Libano makokufa. | |
Nahu | LinVB | 1:5 | Ngomba inene ikolenge mpo ya ye, ngomba ike ikoningana. Mokili mokobulungana o miso ma ye, mpe bato banso bazali o mokili bakobanga. | |
Nahu | LinVB | 1:6 | Nani akoki na nkanda enene ya ye ? Soko atoki na nkanda, nani akobanga te ? Nkele ya ye ekotumba lokola móto, mpe mabanga makopaswana o boso bwa ye. | |
Nahu | LinVB | 1:7 | Yawe azali nta bolamu, ebombamelo o mikolo mya malozi, akobatelaka baye bakoluka libiki epai ya ye | |
Nahu | LinVB | 1:8 | o eleko ya mpela enene. Akosilisa baye bakotombokela ye, akobengana banguna ba ye kin’o kati ya molili. | |
Nahu | LinVB | 1:9 | Bolingi kosala Yawe mabe nini ? Ye azali oyo akosukisaka banguna banso. Malozi manene masengeli kokwela bato mbala ibale te. | |
Nahu | LinVB | 1:10 | Bakoliama lokola maboke ma matiti ma nzube, lokola bato balangwi masanga, bakozika lokola matiti makauka. | |
Nahu | LinVB | 1:12 | (Yuda,) Yawe alobi boye : Ata banguna bazali mingi mpe makasi, banso bakosila mpe bakokufa. Nasambwisaki yo, kasi nakosambwisa yo lisusu te. | |