NAHUM
Chapter 3
Nahu | LinVB | 3:1 | Mawa na yo, engumba ya babomi, etondi na lokuta mpe na biloko biyibami, otikaka koyiba mokolo moko te ! | |
Nahu | LinVB | 3:2 | Yoka bobeti bwa fimbo, yoka boleli bwa yika ya makalo, lokito la farasa ipoti mbangu mpe ya makalo mapimbwi. | |
Nahu | LinVB | 3:3 | Tala bitumba bya batambwisi farasa, bongengi bwa mimpanga lokola móto mpe makongo lokola móto mwa minkalali ; bato ebele bazoki, baike bakufi, bibembe bilali epai na epai, bato bakwei o bibembe ! | |
Nahu | LinVB | 3:4 | Mpo osali makambo ma bosoni lokola ndumba, mwasi kitoko solo, kasi na mayele ma bosenginyi. Na bondumba bwa yo okomisi bato baombo mpe obembi bango na makambo ma nkisi. | |
Nahu | LinVB | 3:5 | Yawe wa bokasi bonso alobi : Ngai oyo nabelemi na yo ! Nakotombola nsonge ya elamba ya yo tee o elongi, nakolakisa bato ba bikolo binso bolumbu bwa yo. Nakoyokisa yo nsoni o miso ma bikolo bisusu. | |
Nahu | LinVB | 3:7 | Baye bakomono yo, bakokima mpe bakoganga : « Ninive ekomi mopotu ! » Nani akoyokela ye mawa ? Moto akobondo yo akozwama wapi ? | |
Nahu | LinVB | 3:8 | Yo oleki nde Tebe na bokasi eye etongami o kati ya ebale Nil ? Mai mazingi yango, mai ma mbu mabateli yango, lokola efelo ya ebombamelo. | |
Nahu | LinVB | 3:10 | Ata ye mpe akendeki o boombo, bipai binso bana bake ba ye banyatemaki, babeteki zeke mpo ya kokabola bankumu ba ye, bakangaki bato banene ba ye banso na minyololo. | |
Nahu | LinVB | 3:11 | Sikawa yo mpe okolangwa mpe okobombama ; yo mpe okosengela koluka esika ya kobombama o boso bwa banguna. | |
Nahu | LinVB | 3:12 | Bibombamelo bya yo bizali lokola figi, lokola nzete ya figi eboti mbuma noki ; soko baningisi nzete, mbuma ikwei o monoko mwa moto alingi kolia yango. | |
Nahu | LinVB | 3:13 | Tala ekolo ya yo, otikali bobele na basi ; nzela ya mokili mwa yo ikomi polele, bikangeli binso biziki na móto. | |
Nahu | LinVB | 3:14 | Toka mai mpo ya ntango ya bitumba, lendisa bibombamelo bya yo, tambola o potopoto, nyata mabelé libazi, kamata ebeteli ya biliki o maboko. | |
Nahu | LinVB | 3:15 | Bongo móto mokozikisa yo, mopanga mokoboma yo, ata bozali ebele lokola ndonge, ebele lokola mapalela. | |
Nahu | LinVB | 3:17 | Bakengeli ba yo bazali ebele lokola mapalela, bakomi ba yo lokola lingambo lya nzoi, o ntango ya mpio ikobombama o kati ya nzete, kasi ebimi moi, yango ikokende epai moto ayebi te. | |
Nahu | LinVB | 3:18 | E mokonzi wa Asur, mawa na yo, boniboni bakengeli ba yo balali mpongi ? Basoda ba yo ba mpiko bapemi, bato ba yo bapanzani o kati ya ngomba, moto moko akoki kosangisa bango lisusu te. | |