Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ESTHER
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10
Prev Up Next
Chapter 5
Esth LinVB 5:1  (Nsima ya mikolo misato Ester alati bilamba bya mokonzi mwasi, mpe akei o lopango, esika atelemi o boso bwa ndako ya mokonzi. Mokonzi afandi o ngwende ya ye o ndako ya bokonzi.1a Esilisi ye kosambela mikolo misato, Ester alongoli bilamba bya bosoto mpe alati lisusu bilamba bya monzele.1b Solo, bonzenga bwa ye bomononi. Asambeli Nzambe oyo akobatelaka mpe akobikisaka bato ba­nso. Akei na basaleli basi babale,1c asimbi moko na loboko lokola moto alembi nzoto ;1d mosusu alandi ye mpe atomboli elamba ya ye elai.1e Aleki kitoko mingi mpe elongi ya ye ekomi kongenge, azalaki koseke lokola mwa­si akei kotala mobali ; kasi o kati ya motema azalaki kobanga mingi.1f Asili koleka bizibeli bya ndako bi­nso mpe abimi o miso ma mokonzi. Akuti ye afandi o ngwende ya ye, alati bilamba bya monzele, bilamba bike-mbami na mabanga ma motuya mpe na wolo ; solo, monzele mwa ye mozalaki kobangisa.2a Atomboli elongi mpe na nkele o motema atali Ester. Ester asenzwi, bokasi bwa nzoto bosili, mitoki mibimeli ye ; bongo alalisi motó o lipeke lya mosaleli wa ye.2b Nzokande Nzambe abongoli motema mwa mokonzi, akomi boboto mpenza. Alongwi noki o ngwende ya ye, ayambi Ester o maboko tee akomi koyoka malamu. Alendisi ye motema na maloba ma boboto, atuni ye :2c « Boni Ester, nazali ndeko wa yo, kitisa motema !2d Okokufa te, mobeko natindaki motali se bato basusu. Yaka pene. »2e Na nsima atomboli montongo mwa wolo, atii mwango o nkingo ya Ester mpe azingi ye ekopi, alobi : « Yebisa ngai makambo ma yo. »2f Ye azongisi : « Namoni yo mokonzi lokola anzelu wa Nzambe, mpe motema mwa ngai moyoki nsomo, awa namoni bonzenga bwa elo­ngi ya yo,2g zambi oleki kitoko, e mokonzi, mpe elongi ya yo elakisi ’te ozali moto malamu. »2h Ntango azalaki koloba bongo, Ester asenzwi lisusu.2i Mokonzi abangi, mpe bato ba ye banso balendisi Ester.
Esth LinVB 5:2  Emoni ye ’te Ester atelemi o lopango o boso bwa ndako ya ye, asepeli boyei bwa ye, mpe ata­ndeli ye montongo mwa wolo, moye amemi o loboko. Ester abelemi mpe asimbi nsonge ya montongo).
Esth LinVB 5:3  Mokonzi atuni ye : « Olingi nini, mo­ko­nzi mwasi Ester ? Olingi napesa yo nini ? Ata osengi ngai ndambo ya bokonzi bwa ngai, nakopesa yo ya­ngo. »
Esth LinVB 5:4  Ester ayanoli : « Malamu mokonzi andima koya lelo elongo na Aman o limpati nalingi kolambelela bango. »
Esth LinVB 5:5  Mokonzi alobi : « Bayebisa Aman ’te aya noki mpo tokende esika Ester abe­ngi biso. » Mokonzi na Aman bayei o limpati liye Ester alambeleli bango.
Esth LinVB 5:6  Ntango ya limpati, mokonzi alobi na Ester : « Olingi nini, mokonzi mwasi Ester ? Manso okosenge ngai, nakopesa yo mango, ata ndambo ya bokonzi bwa ngai ! »
Esth LinVB 5:7  Ye ayanoli : « Likambo nase-ngi… eloko nalingi… ?
Esth LinVB 5:8  Soko ya solo nazwi bolamu o miso ma mokonzi, mpe soko esepelisi mokonzi kopesa maye nakosenge ye, malamu boya lisusu lobi bino na Aman o limpati nakolambelela bino mpe lobi nakosala lokola mokonzi akotinda. »
Esth LinVB 5:9  O mokolo mona Aman abimi o ndako ya mokonzi na motema ese­ngo, asepeli mingi, kasi awa akomi penepene na ezibeli ya ndako ya mokonzi, amoni ’te Mardokai atelemi te, ayoki nkanda mpenza.
Esth LinVB 5:10  Kasi akangi motema. Ekomi ye o ndako abengi baninga ba ye ba motema na mwasi wa ye Zeres.
Esth LinVB 5:11  Atangeli bango nkita ya ye inso, motango mwa bana ba ye, manso mokonzi apesaki ye mpo ya kotombola mpe kokumisa ye o boso bwa bayangeli mpe basaleli banso.
Esth LinVB 5:12  Abakisi : « Esili naino te. Mokonzi mwasi abengi se biso na mokonzi o limpati. Abyangi biso lisusu lobi.
Esth LinVB 5:13  Kasi mana manso makosepelisa ngai te soko namoni mo-Yuda Mardokai afandi o ezibeli ya ndako ya moko­nzi ! »
Esth LinVB 5:14  Mwasi wa ye Zeres na bani­nga ba ye ba motema balobi na ye : « Bakata mobimbi mwa nzete, bolai maboko ntuku itano ; mpe lobi na ntongo se­nge mokonzi ’te atingisa Mardokai, nsinga o nkingo, o nzete ena, bongo yo okende o limpati elongo na mokonzi, mpe osepela kuna. » Aman amo­ni ’te likambo lina libongi, mpe akatisi nzete mpo ya kotingisa Mardokai.