HOSEA
Chapter 11
Hose | LinVB | 11:2 | Ata nabengaki ye ndenge nini, akimaki ngai, abonzelaki ba-Baal mpe atumbelaki bikeko mpaka ya malasi. | |
Hose | LinVB | 11:3 | Nzokande nalakisaki Efraim kotambola, nazalaki koyamba ye o maboko, kasi ayebaki te ’te nazalaki kobatela ye ! | |
Hose | LinVB | 11:4 | Nakambaki ye na boboto mpe na motema bolingi. Nazalaki lokola mobokoli wa ye mpenza, oyo amemi mwana mpe alalisi ye o lipeke ; nasunamaki epai ya ye mpo ya kopesa ye biloko bya kolia. | |
Hose | LinVB | 11:5 | Sikawa akozonga o Ezipeti lisusu te, kasi Asur akozala mokonzi wa ye, mpo aboyaki kozongela ngai. | |
Hose | LinVB | 11:6 | Na mimpanga bakobebisa bingumba bya ye. Bakobuka bikangeli bya bibombamelo bya ye, bakoboma bato ba ye mpo bakanaki kosala mabe. | |
Hose | LinVB | 11:8 | Efraim, nakoki kotika yo te ; Israel, nakoki kobwaka yo te. Nasala yo lokola nasalaki na Adma, to lokola nasalaki na Seboyim ? Motema mwa ngai mokomi pete, mawa matondi o motema mwa ngai. | |
Hose | LinVB | 11:9 | Nakosilisa nkanda ya ngai te, nakobebisa Efraim lisusu te, mpo nazali Nzambe, nazali lokola bato te. O ntei ya bino nazali Mosantu, nakoya epai ya bino na nkanda te. | |
Hose | LinVB | 11:10 | Bakoya kolanda Yawe, ye akoganga makasi lokola nkosi, akoganga makasi mpenza, bato ba ye bakouta o Westi bakolenge ; | |