Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I JOHN
1 2 3 4 5
Prev Up Next
Chapter 1
I Jo LinVB 1:1  Oyo azaláká út’o libandela, óyo toyókákí na matói, óyo tomónókí na míso, óyo totálákí malámu mpé tosímbákí na mabóko : Yě ndé Liloba lya Bomoi.
I Jo LinVB 1:2  Ya sôló, Bomoi abimí o míso ma bato : bísó tomónókí yě, tozalí banzénénéké, mpé tokosangela bínó Bomoi bwa sékô, azalákí o mbóka Tatá mpé amíyébísí na bísó.
I Jo LinVB 1:3  Maye toyókákí mpé tomónókí, tosangélí bínó mangó mpô ’te bínó lokóla bózala lisangá na bísó. Bísó tozalí lisangá na Tatá mpé na Mwána wa yě Yézu Krístu.
I Jo LinVB 1:4  Tokomélí bínó mangó mpô ’te esengo ya bínó ékoka.
I Jo LinVB 1:5  Nsango eye toyókákí o monoko mwa Krístu, eye tosangélí bínó, yangó eye : Nzámbe azalí Mwínda, molílí mozalí na yě sókí moké té.
I Jo LinVB 1:6  Sókó tolobí ’te tozalí na Nzámbe lisangá, nzókandé tozalí kotámbola o molílí, tobúkí lokutá na maloba mpé na bikelá.
I Jo LinVB 1:7  Kasi sókó totámbólí o nzelá ya mwínda, lokóla Nzámbe yě mŏ kó azalí o káti ya mwínda, bísó bánso tosangání lisangá sé lyŏ­kó, mpé makilá ma Yézu, Mwána wa yě, makopétola bísó, makolongola mabé ma bísó mánso.
I Jo LinVB 1:8  Sókó tolobí : « Tozalí na lisúmu té », tozalí komíkósa, mpé tozalí na bosôló o motéma té.
I Jo LinVB 1:9  Kasi sókó tondimí ’te tosálí masúmu, tokokí kotía mitéma na Nzámbe wa bosémbo, akolímbisa bísó masúmu ; akopétola bísó, akolongola mabé ma bísó mánso.
I Jo LinVB 1:10  Kasi sókó tolobí : « Tosálí masúmu té », tozalí kotála yě lokóla moto wa lokutá, mpé maloba ma yě mazalí o mitéma mya bísó té.