I JOHN
Chapter 5
I Jo | LinVB | 5:1 | Moto nyónso ayambí ’te Yézu azalí Krístu azalí moto abótámí na Nzámbe. Moto nyónso alingí mobóti, alingí mpé mwána yě abótí. | |
I Jo | LinVB | 5:2 | Tokoyéba ’te tokolingaka bána ba Nzámbe sókó tolingí Nzámbe mpé sókó tokotósaka mitíndo mya yě. | |
I Jo | LinVB | 5:4 | mpô moto nyónso abótámí na Nzámbe akolónga mabé ma mokili. Ngúyá eye tokolónga na yangó mabé ma mokili, ndé boyambi bwa bísó. | |
I Jo | LinVB | 5:5 | Náni akokí kolónga mabé ma mokili ? Bobélé óyo ayambí ’te Yézu azalí Mwána wa Nzámbe. | |
I Jo | LinVB | 5:6 | Yézu Krístu moto ayákí na mái mpé na makilá ; ayákí bobélé na mái té, kasi na mái mpé na makilá. Elímo moto asakólí bôngó, mpô Elímo azalí Bosôló. | |
I Jo | LinVB | 5:9 | Sókó tokondimaka maloba ma banzénénéké, tóyéba ’te maloba ma Nzámbe malekí na ntína, mpô Nzámbe alobí mangó mpô ya Mwána wa yě. | |
I Jo | LinVB | 5:10 | Moto ayambí Mwána wa Nzámbe, abómbí maloba ma Nzámbe o motéma. Moto ayambí Nzámbe té, atálí Nzámbe lokóla moto wa lokutá, mpô abóyí koyamba maloba maye Nzámbe alobákí mpô ya Mwána wa yě. | |
I Jo | LinVB | 5:11 | Maloba ma yě mangó maye : Nzámbe akabélí bísó bomoi bwa lobíko, bomoi boye bozalí na Mwána wa yě. | |
I Jo | LinVB | 5:12 | Moto azalí na Mwána lisangá azwí bomoi ; óyo azalí na Mwána lisangá té azwí bomoi té. | |
I Jo | LinVB | 5:13 | Nakomélí bínó maloba maye, bínó baye boyambí nkómbó ya Mwána wa Nzámbe, mpô bóyéba ’te bozalí na bomoi bwa lobíko. | |
I Jo | LinVB | 5:14 | Bísó tokokí kotía elíkyá na Nzámbe, óyo akopésa bísó maye toséngí yě engébéné na maye yě alingí. | |
I Jo | LinVB | 5:15 | Toyébí ’te akondimela bísó, atâ toséngí yě elóko níni ; toyébí mpé ’te tokozwa mánso toséngékí yě libosó. | |
I Jo | LinVB | 5:16 | Sókó moto amóní ’te ndeko wa yě asálí lisúmu, liye likokamba kín’o liwá té, ásámbela, bôngó Nzámbe akopésa ndeko ôná bomoi. Tolobí bôngó mpô ya baye bakosála lisúmu likokamba bangó kín’o liwá té. Kasi lisúmu liye likokamba kín’o liwá lizalí ; nalobí té ’te bósámbela mpô ya baye bakosála lisúmu lyangó. | |
I Jo | LinVB | 5:18 | Toyébí ’te moto abótámí na Nzámbe akosála lisúmu té ; Mwána wa Nzámbe akobátelaka yě mpé Mobébisi akokí kosála yě mabé té. | |
I Jo | LinVB | 5:20 | Toyébí mpé ’te Mwána wa Nzámbe ayéí, mpé apésí bísó mayéle mpô tóyéba Nzámbe wa sôló. Tozalí na bondeko bwa Nzámbe wa sôló, sókó tozalí na bondeko bwa Mwána wa yě, Yézu Krístu. Yě mpenzá azalí Nzámbe wa sôló, yě ndé Bomoi bwa lobíko. | |