Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I JOHN
1 2 3 4 5
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 3
I Jo LinVB 3:1  Bótála bóníbóní Tatá akolingaka bísó : apésí bísó nkómbó ‘bána ba Nzá­mbe’, mpé tozalí sôló bána ba Nzámbe. Bato ba nsé bayébí bísó té, zambí bayébí Yě mpé té.
I Jo LinVB 3:2  Bandeko ba bolingo, út’o sikáwa tozalí bána ba Nzámbe, kasi naíno emónóní té bóníbóní tokozala nsima. Toyébí ’te ntángo Mwána wa Nzámbe akomónono, tokoúlana na yě, mpô tokomóno yě lokóla azalí.
I Jo LinVB 3:3  Moto akotía elíkyá boye na Nzá­mbe, akomíkómisa péto lokóla Krístu yě mŏ kó azalí péto.
I Jo LinVB 3:4  Moto asálí lisúmu, abúkí mobéko, zambí lisúmu lizalí : kobúka mobéko.
I Jo LinVB 3:5  Kasi boyébí ’te Krístu ayákí kobimela bísó mpô ’te álongola masúmu. Boyébí mpé ’te yě azalí na lisúmu lyŏ kó té.
I Jo LinVB 3:6  Moto azalí na yě lisangá akosála lisúmu té. Moto asálí lisúmu, amóní yě naíno té, ayébí yě mpé té.
I Jo LinVB 3:7  Bána ba ngáí, bákósa bínó té. Moto akosálaka makambo ma bosémbo azalí moto wa bosémbo, sé lokóla Krístu.
I Jo LinVB 3:8  Kasi óyo akosálaka lisúmu, azalí moto wa zábolo, mpô zábolo azalí mosúmuki út’o libandela. Mwána wa Nzámbe ayákí o nsé mpô ’te áboma misálá mya zábolo.
I Jo LinVB 3:9  Moto abótámí na Nzámbe akosálaka lisúmu té, zambí ngúyá ya bomoi bwa Nzá­mbe ezalí na yě. Akokí kosála lisúmu té, zambí abótámí na Nzámbe.
I Jo LinVB 3:10  Tálá bóníbóní bokoyéba sókó bato bazalí bána ba Nzámbe tŏ bána ba zábolo : bato bánso bazalí na bosémbo té, ná mpé baye bakolingaka bandeko ba bangó té, baútí na Nzámbe té.
I Jo LinVB 3:11  Eye ezalí nsango bosílí boyókí út’o ebandela : tosengélí kolingana.
I Jo LinVB 3:12  Tózala lokóla Kain té : yě moto wa Mongúná, abomákí ndeko wa yě. Mpé ntína níni abomákí yě ? Mpô azalákí kosála mabé, mpé ndeko wa yě azalákí kosála malámu.
I Jo LinVB 3:13  Bókámwa té, bandeko, sókó bato ba nsé bayiní bínó.
I Jo LinVB 3:14  Bísó toyébí ’te tobíkí o liwá mpé tokómí na bomoi, zambí tokolingaka bandeko. Moto akolingaka bandeko té, akotíkala o káti ya liwá.
I Jo LinVB 3:15  Moto ayiní ndeko wa yě azalí mobomi. Boyébí ’te mobomi azalí na bomoi bwa sékô o motéma té.
I Jo LinVB 3:16  Mpô ya Krístu toyébí níni ezalí bolingi : áwa akabí bomoi bwa yě mpô ya bísó. Bísó lokóla tosengélí komíkaba mpô ya bandeko.
I Jo LinVB 3:17  Ndéngé níni bolingi bwa Nzámbe bokokí kozala na moto azalí na bilóko bikokí na yě, nzókandé abóyí kosálisa ndeko wa yě akélélí ?
I Jo LinVB 3:18  Bána ba ngáí, tólinga bobélé na maloba tŏ na monoko té, kasi na misálá mya bosôló.
I Jo LinVB 3:19  Sókó tosálí bôngó, tokoyéba ’te tozalí bato ba bosôló, mpé o míso ma Nzámbe tokozala na bobóto o mitéma
I Jo LinVB 3:20  mbala ínso motéma mwa bísó mozalí kopálela bísó, mpô Nzámbe alekí bísó na motéma ngolu, mpé ayébí mánso.
I Jo LinVB 3:21  Bandeko ba bolingo, áwa tozalí motéma mpío, tozalí na elíkyá enéne o míso ma Nzámbe :
I Jo LinVB 3:22  tokokí kosénge yě atâ níni, akopésa bísó yangó, zambí tokotósaka mibéko mya yě mpé tokosálaka maye mazalí kosepelisa yě.
I Jo LinVB 3:23  Apésí bísó mobéko moye : tóyamba Mwána wa yě Yézu Krístu mpé tólingana lokóla atíndákí bísó.
I Jo LinVB 3:24  Moto akotósa mibéko mya Nzá­mbe, akosangana na Nzámbe mpé Nzámbe akosangana na yě. Toyébí ’te Nzámbe asangání na bísó mpô ya Elímo apésí bísó.