II PETER
Chapter 2
II P | LinVB | 2:1 | Baproféta ba lokutá bazángákí té o ntéi ya bato ; sé bôngó, batéyi ba lokutá bakobima o ntéi ya bínó : bangó bakobimisa mangómbá ma lokutá, bakobébisa mitéma mya bato, mpé bakowángana Mokonzi óyo asikólí bangó. Bôngó bangó mŏ kó bakomílukela liwá nokí mpenzá. | |
II P | LinVB | 2:2 | Bato baíké bakolanda ezalela ya bangó ya mobúlú, bakotíka nzelá ya bosôló mpô ya bangó. | |
II P | LinVB | 2:3 | Mpô ya mpósá ya mbóngo bakokósa bínó na maloba ma lokutá mpé bakobótolo bínó bilóko. Basílí kokáta likambo lya bangó út’o kala. Liwá lya bangó likoúmela lisúsu míngi té. | |
II P | LinVB | 2:4 | Ntángo bǎnzelú basálákí lisúmu, Nzámbe abíkísákí bangó té, kasi abwákí bangó o límfelo, o lobwákú la molílí. Akangísí bangó kúná kín’o mokolo akokáta makambo ma bangó. | |
II P | LinVB | 2:5 | Ayókélákí mpé bato ba kala mawa té : atíndí Mpela Enéne mpé abomí bato babóyí yě. Abíkísí bobélé bato mwambe. Nówe, ntóma wa bosémbo, azalákí o ntéi ya bangó. | |
II P | LinVB | 2:6 | Lokóla ndakisa o míso ma bato bakoyâ nsima mpé bakobóya Nzámbe, abomí bingumbá Sódoma na Gómora, akómísí byangó mputulú. | |
II P | LinVB | 2:7 | Kasi abíkísí Lót, moto wa bosémbo, óyo azalákí koyóka motéma mpási na bomóni mobúlú mwa bato babé. | |
II P | LinVB | 2:8 | Yě azalákí kofánda o káti ya bangó, mpé mokolo na mokolo azalákí komóno mpé koyóka makambo mabé ma bangó. Makambo maye mazalákí koyókisa motéma mwa yě mwa bosémbo mpási. | |
II P | LinVB | 2:9 | Sôló, Mokonzi akokí kobíkisa o minyóko bato balingí yě ; akokí mpé kobátela bato babé mpô ’te ápésa bangó etúmbu o mokolo mwa likambo. | |
II P | LinVB | 2:10 | Kasi libosó akotúmbola bato bakolandaka mpósá ebé ya nzóto mpé bakokínolaka Bokonzi bwa yě. Bazalí bato batóndí na loléndo mpé na lofúndo, bakobángaka té kotúka bǎnzelú. | |
II P | LinVB | 2:11 | Atâ bǎnzelú balekí bangó na ngúyá mpé na bokási, bakofúndaka tŏ bakotóngoko bangó o míso ma Mokonzi té. | |
II P | LinVB | 2:12 | Kasi bato baye ba lofúndo bakotiolaka maye bayébí té. Bazalí lokóla nyama izángí mayéle, iye ikobótamaka mpô ’te bato bákanga mpé báboma yangó. Sé bôngó, bangó mpé bakokúfa mpô ya mabé ma bangó. | |
II P | LinVB | 2:13 | Bakoyóka mpási mpô ya mpási iye bayókísákí bato basúsu. Bakoyókaka elengi na bolandi mpósá ebé ya bangó o míso ma bato ; bazalí bato ba mbindo, babébá kala. Awa bakolíaka na bínó esíká yŏ kó, bakolukaka kotónda na bilóko mpé kokósa bínó. | |
II P | LinVB | 2:14 | Míso ma bangó makolúlaka sé mambí ma bokáli, bakolembeke kosála masúmu té, bakokósaka bato ba motéma motaú. Mitéma mya bangó mimeséní na lokósó la mbóngo. Mabé makwêlí bangó sôló ! | |
II P | LinVB | 2:15 | Awa batíkí nzelá sémba, babúngámí na bolandi nzelá ya Balame, mwána wa Béor : yě awélákí mbóngo eye azwí na makambo mazángí bosémbo. | |
II P | LinVB | 2:16 | Kasi bapálélí yě mpô ya mabé asálákí : mpúnda, nyama mpámba, ebandí koloba lokóla moto mpô ’te proféta átíka makambo ma bozóba. | |
II P | LinVB | 2:17 | Bato baye bazalí lokóla máziba makaúká, lokóla mampata matíndámí na mompepe mwa ekumbaki. Bakosúka o káti ya molílí makási. | |
II P | LinVB | 2:18 | Na maloba ebelé ma lofúndo mazángí ntína mpé na ezalela ya baye bakolandaka mpósá ya nzóto bakolukaka kosénginya baye batíkí nzelá ya lokutá kala míngi té. | |
II P | LinVB | 2:19 | Bakolakelaka bangó bonsómí, kasi bangó mŏ kó bazalí baómbo ba maye makobébisaka bato ; mpámba té, moto akangémí na elóko, akómí moómbo wa yangó. | |
II P | LinVB | 2:20 | Ya sôló, libosó bayébákí Mokonzi Yézu Krístu Mobíkisi, mpé bakímákí makambo mabé ma nsé ; kasi sikáwa bazóngélí makambo mâná lisúsu mpé bakangémí na mangó, bôngó bakití o mabé malekí mabé ma libosó. | |
II P | LinVB | 2:21 | Malámu sókó bayébákí nzelá ya bosémbo té, kasi bayébí yangó : bazwákí mobéko mosántu mpé batíkí mwangó lisúsu. | |