Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
RUTH
1 2 3 4
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 2
Ruth LinVB 2:1  Noemi azalaki na ndeko moko wa libota lya mobali wa ye. Ye moto wa nkita : ye na Elimelek, mobali wa ye, bazalaki makila moko ; nkombo ya ye Booz.
Ruth LinVB 2:2  Rute, mwasi wa mokili mwa Moab, alobi na Noemi : « Tika nakende kolokoto mbuma ya mampa epai ya mo­to oyo akolingisa ngai. »
Ruth LinVB 2:3  Noemi alobi : « Malamu, mwana wa ngai, ke­nde ! » Rute azwi libaku lilamu lya bokei esika balingisi ye alokoto mbuma : ezalaki elanga ya Booz, ndeko wa Elimelek.
Ruth LinVB 2:4  Booz autaki o Beteleme, alobi na bato bazalaki kobuka mbuma : « Yawe azala na bino ! » Ba­ngo bazongisi : « Yawe abenisa yo ! »
Ruth LinVB 2:5  Booz atuni kapita wa bato bazalaki kobuka mbuma : « Elenge mwasi oyo, nkolo wa ye nani ? »
Ruth LinVB 2:6  Kapita ayanoli : « Azali elenge mwasi wa Moab, ayaki awa elongo na Noemi mpe auti o esobe ya Moab.
Ruth LinVB 2:7  Ye atunaki : ‘Olingisa ngai naluka mpe nalokoto mbuma ya mampa nsima ya bato bakobuka mbuma’. Ayaki banda ntongo mpe tee sikawa azali se wana, naino apemi te. »
Ruth LinVB 2:8  Booz alobi na Rute : « Mwana wa ngai, yoka malamu. Okende kolokoto mbuma o elanga esusu te. Olongwa awa te, kasi otikala bobele awa nsima ya basali ba ngai.
Ruth LinVB 2:9  Tala eteni ya elanga esika bakobuka mbuma mpe landa bango. Napekisi basali ba ngai batungisa yo te. Soko oyoki mposa ya komele mai, mele o mbeki ya basali mai batokaki. »
Ruth LinVB 2:10  Rute akwei elo­ngi o nse, akumbameli ye mpe alobi : « Boni osali ngai malamu boye, mpe okanisi ngai, awa nazali se mompaya ? »
Ruth LinVB 2:11  Booz azongisi : « Bayebisi ngai manso osalaki bokilo wa yo nsima ya liwa lya mobali wa yo mpe boniboni otikaki tata na mama na mpe mboka esika obotamaki, mpo ya kokende epai ya bato oyebaki liboso te.
Ruth LinVB 2:12  Yawe azongisela yo malamu manso osalaki ; mpe Yawe, Nzambe wa Israel, afuta yo lifuta mobimba, awa otii mo­tema o bobateli bwa ye. »
Ruth LinVB 2:13  Rute azongisi : « Nazwa ntango inso bolamu o miso ma yo, e mokonzi wa ngai. Okitisi ngai motema mpe olobi na ngai mosaleli wa yo maloba ma boboto, ata nakokani na moko wa basali ba yo te. »
Ruth LinVB 2:14  O ntango ya kolia Booz alobi na Rute : « Yaka penepene, lia limpa liye mpe tuna ndambo ya limpa o masa-nga bololo. » Afandi bongo penepene na babuki mbuma mpe Booz apesi ye mbuma bakalingi. Alei mpe atondi ; mpe ndambo etikali naino.
Ruth LinVB 2:15  Etelemi ye mpo ya kolokoto mbuma lisusu, Booz alobi na basali : « Bolingisa ye alokoto ata o kati ya maboke, botu­ngisa ye te.
Ruth LinVB 2:16  Mpe bobenda mitó mya mbuma o maboke ma bino, bokweisa myango o nse, alokoto myango, bopekisa ye te. »
Ruth LinVB 2:17  Rute alokoti mbuma o elanga tee butu ; mpe esilaki ye kotuta mbuma inso alokotoki, atondisi na yango ngoto mobimba.
Ruth LinVB 2:18  Akamati ngoto mpe azongi na yango o mboka ; bokilo wa ye amoni biloko alokotoki. Rute alakisi ye mpe biloko abombaki, biye aliaki te, apesi bokilo wa ye byango.
Ruth LinVB 2:19  Bokilo atuni ye : « Lelo olokotoki mbuma wapi ? Osalaki epai wapi ? Nzambe abenisa moto oyo akanisaki yo ! » Rute ayebisi bokilo wa ye epai ya nani asalaki mosala, alobi : « Moto oyo epai nasalaki mosala lelo, nkombo ya ye Booz. »
Ruth LinVB 2:20  Mpe Noemi alobi na bokilo wa ye : « Yawe abenisa moto oyo akolakisaka ntango inso bolamu na bato bazali na bomoi mpe na bato bawei. » Noemi abakisi : « Moto ona azali ndeko wa biso, azali moto wa libota lya biso, akoki kosikola biso. »
Ruth LinVB 2:21  Rute wa Moab alobi lisusu na bokilo wa ye : « Booz alobaki na ngai mpe ’te : Tikala na basaleli tee basilisi mosala mwa kobuka mbuma inso. »
Ruth LinVB 2:22  Noemi alobi na bokilo wa ye Rute : « Ebongi, mwa­na wa ngai, ’te okende elongo na basali basi ba ye, mpo ’te bato batu­ngisa yo te o elanga ya moto mosusu. »
Ruth LinVB 2:23  Bo­ngo Rute atikali o kati ya basi ba mosala ba Booz mpo ya kolokoto mbuma tee basilisi kobuka mbuma inso ya mampa mpe ya loso. Azalaki kofanda epai ya bokilo wa ye.