Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
AMOS
1 2 3 4 5 6 7 8 9
Prev Up Next
Chapter 2
Amos LinVB 2:1  Yawe alobi : Moab asali mabe mbala na mbala : Nakokokisa maye nakani kosala, mpo atumbi minkuwa mya nko­ndo mokonzi wa Edom.
Amos LinVB 2:2  Nakotinda móto o Moab mótumba ndako inene ya Keriot. Moab akokufa o kati ya mobulu mwa bitumba, ntango bato bakolela makasi mpe bakobete mindule.
Amos LinVB 2:3  Nakolongola mokonzi o ntei ya bato ba ye, nakoboma bankumu banso elo­ngo na ye. Maloba ma Yawe.
Amos LinVB 2:4  Yawe alobi : Yuda asali mabe mbala na mbala : Nakokokisa maye nakani kosala, mpo baboyi kotosa mibeko mya Yawe, batosi mateya ma ye te. Bikeko bya banzambe ba lokuta bibungisi bango mayele, biye bankoko ba bango balandaki.
Amos LinVB 2:5  Nakotinda móto o ekolo ya Yuda mótumba ndako ya bakonzi ba Yeruzalem.
Amos LinVB 2:6  Yawe alobi : Israel asali mabe mbala na mbala : nakokokisa maye nakani kosala, mpo bateki moto wa bosembo mpo bazwa mosolo, bateki mobola mpo basomba sapato,
Amos LinVB 2:7  bakonyataka bato bake lokola mabelé, bakobebisaka makambo ma babola ; tata na mwana bakomi kolanda mwasi se moko, bakosantolaka bongo nkombo ya ngai esantu.
Amos LinVB 2:8  Bakolalaka na butu penepene na altare inso o bilamba bakamataki bo ndanga. Bakomeleke vino o ndako ya nza­mbe wa bango, eye bafutisaki bato na mayele mabe.
Amos LinVB 2:9  O miso ma bango nabomaki bato ba Amor, bato balai lokola sédere, na bokasi lokola nzete ya wenge ! Epai ya likolo nalongolaki mbuma inso, epai ya nse nakataki minsisa mi­nso.
Amos LinVB 2:10  Nabimisaki bino o Ezipeti mpe nakambaki bino o eliki mibu ntuku inei mpo ’te bozwa mabelé ma ba-Amor.
Amos LinVB 2:11  O ntei ya bino nabimisaki baprofeta mpe o ntei ya bilenge nabimisaki babonzami ! Bato ba Israel, ezali bongo te ? Maloba ma Yawe.
Amos LinVB 2:12  Bino bomelisi babonzami ba ngai vino, mpe bopekisi baprofeta basakola.
Amos LinVB 2:13  Yango wana ngai nakonyata bino sikawa, lokola likalo lya bilanga likonyataka mabelé.
Amos LinVB 2:14  Ata moto wa mbangu akokima te, elombe akokoka kolakisa bokasi bwa ye te, moto wa mpiko enene akokima liwa te.
Amos LinVB 2:15  Moto wa litimbo akolonga te, moto wa mbangu akokima te, ata motambwisi farasa akomibikisa te ;
Amos LinVB 2:16  ata moto oyo aleki baninga banso na mpiko akokima bolumbu mokolo mona. Maloba ma Yawe.