ESTHER
Chapter 4
Esth | LinVB | 4:1 | Eyoki Mardokai likambo lina apasoli bilamba, alati ngoto mpe atii mputulu o motó. Akatisi engumba mobimba, aleli na bogangi na mawa manene. | |
Esth | LinVB | 4:2 | Akei tee o ezibeli ya ndako ya mokonzi, atelemi wana, zambi moto oyo alati ngoto akoki kokoto o ndako ya mokonzi te. | |
Esth | LinVB | 4:3 | O bikolo binso etinda ekomi koyebana, ba-Yuda bazalaki kosala lilaka, kolala nzala, kolela mpe kokimela. Bato mingi bakomi kolata ngoto mpe kofanda o mputulu. | |
Esth | LinVB | 4:4 | Ntango baninga basi ba Ester na ba-eniki bakei koyebisa ye, ayoki nsomo mpenza. Atindi ’te bayela Mardokai bilamba, alata byango mpe alongola ngoto. Kasi ye aboyi. | |
Esth | LinVB | 4:5 | Na nsima Ester abengi eniki Atak, oyo azalaki kosalela ye ; atindi ye akende kotuna Mardokai ntina mpenza ya likambo liye. | |
Esth | LinVB | 4:6 | Atak abimi o ndako mpe akei koyebisa Mardokai azalaki o lingongo liboso lya ezibeli ya ndako ya mokonzi. | |
Esth | LinVB | 4:7 | Bongo Mardokai ayebisi ye makambo makweli bango ; ayebisi ye mpe mbongo boni Aman andimi kotia o sanduku ya mosolo mpo ’te asilisa ba-Yuda banso. | |
Esth | LinVB | 4:8 | Atikeli ye mpe maloba ma monkanda mwa makambo basakolaki o Suza, na likambo lya koboma ba-Yuda banso, apesa Ester monkanda mona. Atindi mpe Ester akende epai ya mokonzi, abo-ndela ye ’te ayokela bato ba ekolo ya ye mawa : 8A (C) « Okundolaka o motema mikolo ozalaki mobola, ntango nazalaki koleisa yo, zambi Aman, oyo azali moto wa babale o ekolo, asengi mokonzi ’te baboma biso. 8A Bondela Mokonzi Nzambe, lobela biso epai ya mokonzi ! Bikisa biso o liwa ! » | |
Esth | LinVB | 4:11 | Bato ba mikili minso mya ekolo ya mokonzi bayebi malamu ’te moto ata nani, azala mobali to mwasi, soko akei epai ya mokonzi mpe abyangemi te, akobika soki te, bobele soko mokonzi atandeli ye montongo mwa ye mwa wolo ; se moto oyo akoki kobika. Tala, ekomi mikolo ntuku isato ’te babengi ngai lisusu te mpo nakoma penepene na mokonzi. » | |
Esth | LinVB | 4:13 | Mardokai ayanoli Atak boye : « Kende koyebisa Ester : Okanisa te ’te yo moko okobika o kati ya ba-Yuda banso, mpo ofandi o ndako ya mokonzi. | |
Esth | LinVB | 4:14 | Ezali bongo te ! Soko okolobela biso sikawa te, libiki lya biso likouta epai esusu, mpe moto mosusu akobikisa biso ba-Yuda, kasi yo na bandeko ba yo bokokufa. Nani ayebi ? Mbele okomi mwasi wa mokonzi mpo ’te obikisa biso o likama liye ? » | |
Esth | LinVB | 4:16 | « Kende kosangisa ba-Yuda banso ba Suza : balala nzala elongo na ngai ; balia mpe bamele eloko te, mikolo misato mobimba, butu moi. Ngai na baninga basi, tokolia eloko te. Na nsima, ata mobeko mopekisi, nakokoto epai ya mokonzi ; soko ese-ngeli ’te nakufa, nakokufa. » | |
Esth | LinVB | 4:17 | Mardokai akei kosala manso Ester atindaki ye. 17A Mardokai akundoli o motema misala minene minso Nzambe asalaki, abondeli ye na maloba maye : 17B « E Mokonzi Nzambe, yo Nkolo wa mokili mobimba, binso bizali o maboko ma yo ; moto moko te akoki kopekisa yo soko olingi kobikisa Israel. 17C Ya solo, yo moto okelaki likolo na nse na makamwa manso mazali o nse. 17D Mokonzi, ozali Nkolo wa molongo, mpe moto moko aleki yo na bokasi te. 17E Mokonzi, oyebi makambo manso ! Naboyaki kokumbamela Aman, moto wa lolendo ; oyebi ’te naboyaki mpo ya lolendo te, nasalaki bongo mpo ya koluka lokumu te. 17F Mbele nandimaki kozinga makolo ma ye, soko nakokaki kobikisa Israel bongo. 17G Kasi nasali bongo mpo nakoki kotia lokumu la moto liboso lya lokumu la Nzambe te. Ngai nakokumbamela moto moko te, nakofukamela se yo, Mokonzi ; soko nasali bongo, ezali mpo ya lolendo te ! 17H Kasi sikawa, Mokonzi Nzambe, Yo Nkumu, Nzambe wa Abarama, yokela bato ba ekolo ya yo mawa ! Mpamba te, bazali koluka koboma biso, balingi kosilisa biso bato ba yo uta kala. 17I Tozali ekolo ya yo, otika biso te, yomei obikisaki biso o mokili mwa Ezipeti. 17J Ondima losambo la ngai, oyokela bato ba ekolo ya yo ngolu ; mawa ma biso mabongwana esengo. Tozala makasi mpe tokumisa nkombo ya yo seko. Ondima te ’te bato baboma biso, mpo biso tokokumisaka yo. » 17K Bato banso ba Israel bagangi na makasi ma bango manso, mpo bamoni ’te etikali moke bakufa. | |