Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I TIMOTHY
1 2 3 4 5 6
Prev Up Next
Chapter 6
I Ti LinVB 6:1  Baye bánso bazalí komeme mókúmbá mwa boómbo, basengélí komemya bankóló ba bangó na motéma mǒkó, mpô ’te bato bátúka nkómbó ya Nzámbe té, matéya ma yě mpé té.
I Ti LinVB 6:2  Baye bazalí na nkóló mokrístu, bákínola yě té mpô azalí ndeko mokrístu ; kasi básálela yě malámu, zambí óyo akozwa litómba na mosálá mwa bangó azalí moyambi mpé ndeko wa bolingo. Tálá bóníbóní osengélí kolakisa mpé kotéya bato.
I Ti LinVB 6:3  Sókó moto atéyí matéya masúsu mpé atíkí maloba ma bosôló, maye Mokonzi wa bísó Yézu Krístu atéyákí mpô ya kokúmisa Nzámbe bǒ ebongí,
I Ti LinVB 6:4  azalí moto wa lofúndo mpé ayébí elóko té. Mosálá mwa yě, sé kowéla ntembe mpé kolobaloba mpámba ; mosíká té ekobima zúwa, boswâni, mafínga mpé makanisi mabé.
I Ti LinVB 6:5  Baye bazalí na mitéma míbalé bayébí makambo ma sôló té, ntembe ya ba­ngó ekosílaka té. Litómba bakolukaka o boyambi, sé mosolo.
I Ti LinVB 6:6  Sôló, koyamba Nzámbe ezalí na li­tómba linéne, sókó moto asepélí bobélé na bilóko biye bizalí na yě.
I Ti LinVB 6:7  Zambí toyákí o nsé mabóko mpá­mba, sé bôngó tokotíka nsé eye mabóko mpámba.
I Ti LinVB 6:8  Bôngó, ékoka na bísó sókó tozalí na bilóko bya kolía mpé na bilambá bya koláta.
I Ti LinVB 6:9  Kasi baye balingí kozwa nkita enéne, bako­ndima masénginyá, bako­kwéya o motámbo mwa mpósá ya bozóba mpé ya mabé, eye ekobébisaka bato mpé ekobomaka bangó.
I Ti LinVB 6:10  Sôló, lokósó la mosolo lozalí ntína ya mabé mánso. Basúsu bawélákí mosolo babébísí bôngó boyambi mpé bamíyókísí motéma mpási míngi.
I Ti LinVB 6:11  Yǒ, moto wa Nzámbe, kímá makambo mâná mánso. Luká bosémbo, zalá moto wa losámbo, na boyambi, na bolingi, na moléndé mpé na bobóto.
I Ti LinVB 6:12  Bundá etumba elámu ya boyambi, luká kozwa bomoi bwa lobíko, zambí Nzámbe abyá­ngákí yǒ ózwa bwangó. Na ntína êná mpé osakólákí boyambi bwa yǒ o míso ma bato baíké.
I Ti LinVB 6:13  O míso ma Nzámbe óyo akopésaka bilóko bínso bomoi, o míso mpé ma Krístu Yézu, óyo asakólákí esakola ya sôló o bosó bwa Pónsio Piláto, nabóndélí yǒ,
I Ti LinVB 6:14  óbátela mobéko moye mózwa mbindo té, mabé mpé té, kín’o mokolo Mokonzi wa bísó Yézu Krístu akoyâ.
I Ti LinVB 6:15  Sókó ntángo ekokí Nzámbe akotínda yě ámónono : Mo-esengo mpé Mokonzi sé mǒ­kó, Nkúmú wa bankúmú, Mokonzi wa bakonzi ;
I Ti LinVB 6:16  bobélé yě mǒkó akokúfa té, azalí o mbóka ya mwínda, esíká moto mǒkó akokí kokóma té ; moto mǒkó té asílí amóní tǒ akokí komóno mwínda môná. Na yě nkémbo mpé ngúyá ya sékô ! Amen.
I Ti LinVB 6:17  Pálélá bato ba nkita ba mokili moye bázala na loléndo té, bátía mitéma té na nkita iye ikobéba. Kasi bátía mitéma na Nzámbe óyo akotóndisaka bísó na bilóko bínso mpô tósepela na byangó.
I Ti LinVB 6:18  Básála sé malámu, bázwa nkita na misálá bakosálaka. Básálisa bato mpé bákabela bangó bilóko na motéma malámu.
I Ti LinVB 6:19  Sé bôngó bakomíbó­mbela nkita ya sôló eye ekoúmela o bileko bikoyâ mpô ’te bázwa bomoi bwa sôló.
I Ti LinVB 6:20  Timotéo, bátélá bolámu bónso ozwákí. Olanda masoló ma mpá-mbampámba té, maye mazalí o nzelá ya boyambi té ; ókíma mpé maloba ma ntembe ma baye bamímóní ’te bazalí na mayéle ma sôló.
I Ti LinVB 6:21  Bato basúsu bakosakolaka makambo mâná, basílí babébísí boyambi bwa bangó. Ngrásya ézala na yǒ !